Nzembo 26:1-12

  • Kotambola na kozanga mbeba

    • “Ee Yehova, talá ngai malamumalamu” (2)

    • Koboya baninga mabe (4, 5)

    • ‘Nakotambola zingazinga ya etumbelo ya Nzambe’ (6)

Loyembo ya Davidi. 26  Ee Yehova, sambisá ngai mpo natamboli kozanga mbeba,+Natyeli Yehova motema, mpe natengitengi te.+   Ee Yehova, talá ngai malamumalamu mpemeká ngai;Pɛtolá makanisi na ngai oyo ebombaná mpenza* na kati mpe motema na ngai.+   Mpo bolingo na yo ya sembo ezali ntango nyonso liboso na ngai,Mpe natambolaka na solona yo.+   Nasalaka boninga te* na bato ya lokuta,+Mpe naboyi baoyo bazali kobomba ndenge bazali.*   Nayini lisangá ya basali-mabe,+Mpe naboyi kosala boninga* na bato mabe.+   Nakosukola mabɔkɔ na ngai mpo na komonisa ete nazali na ngambo te,Mpe nakotambola zingazinga ya etumbelo na yo, Ee Yehova,   Mpo na kosala ete lokito ya matɔndi eyokana,+Mpe mpo na kosakola misala na yo nyonso ya kokamwa.   Yehova, nalingaka ndako oyo ofandaka,+Esika oyo nkembo na yo efandaka.+   Kolongola ngai* te elongo na basumuki,+Mpe kolongola bomoi na ngai te elongo na bato ya mobulu,* 10  Baoyo mabɔkɔ na bango emipesi na etamboli ya nsɔni,Mpe baoyo lobɔkɔ na bango ya mobali etondi na kanyaka. 11  Kasi ngai, nakotambola kozanga mbeba. Bikisá* ngai mpe moniselá ngai boboto. 12  Lokolo na ngai etɛlɛmi na esika ya patatalu;+Na kati ya ebele ya bato oyo bayangani, nakosanzola Yehova.+

Maloba na nse

To, “mayoki na ngai ya mozindo.” Lil., “bangɛi.”
Lil., “Nafandi esika moko te.”
To, “Nazalaka te esika moko na baoyo babombaka ndenge bazali.”
Lil., “nafandaka esika moko te.”
To, “molimo na ngai.”
To, “ngambo ya makila.”
Lil., “Sikolá.”