Nzembo 114:1-8
114 Ntango Yisraele ebimaki na Ezipito,+Ntango bana ya Yakobo bautaki epai ya bato oyo bazalaki koloba monɔkɔ moko ya bapaya,
2 Yuda ekómaki esika na ye mosantu,Yisraele bokonzi na ye.+
3 Mbu emonaki yango mpe ekimaki;+Yordani ezongaki nsima.+
4 Bangomba epumbwaki lokola bampate-mibali,+Bangomba mike lokola bana-mpate.
5 Ee mbu, nini esalaki ete okima?+
Ee Yordani, mpo na nini ozongaki nsima?+
6 Ee bangomba, mpo na nini bopumbwaki lokola bampate-mibali,Ee bangomba mike, lokola bana-mpate?
7 Ee mabele, lɛngá mpo na Nkolo,Mpo na Nzambe ya Yakobo,+
8 Oyo azali kobongola libanga ekóma etima oyo etondi na matiti,Libanga ya silekisi na maziba ya mai.+

