Nzembo 17:1-15

  • Libondeli mpo na kosɛnga libateli

    • “Omeki motema na ngai” (3)

    • “Na elili ya mapapu na yo” (8)

Libondeli ya Davidi. 17  Yoká kosɛnga na ngai mpo na bosembo, Ee Yehova;Tyá likebi na koganga na ngai mpo na koluka lisalisi;Yoká libondeli na ngai, oyo nasali kozanga bokosi.+  2  Katá likambo na bosembo mpo na bolamu na ngai;+Tiká miso na yo emona oyo ezali sembo.  3  Omeki motema na ngai, otalitali ngai na butu,+Opɛtoli ngai;+Omoni ete nakani te kosala ata likambo moko ya mabe,Mpe monɔkɔ na ngai ebuki mobeko te.  4  Kasi mpo na misala ya bato,Naboyi banzela ya moyibi, na boyokani na liloba ya mbɛbu na yo.+  5  Tiká matambe na ngai etikala na banzela na yoMpo makolo na ngai ebɛta libaku te.+  6  Ee Nzambe, nazali kobelela yo mpo okoyanola ngai.+ Tyá litoi na yo epai na ngai.* Yoká maloba na ngai.+  7  Monisá bolingo na yo ya sembo na ndenge ya kokamwa,+Ee Mobikisi ya baoyo bazali koluka esika ya libateli na lobɔkɔ na yo ya mobaliOlongolaka bango epai ya bato oyo bazali kotombokela yo.  8  Batelá ngai lokola mbuma ya liso na yo;+Bombá ngai na elili ya mapapu na yo.+  9  Batelá ngai na bato mabe oyo bazali kobundisa ngai,Na lobɔkɔ ya banguna na ngai oyo bazingi ngai mpe balingi koboma ngai.+ 10  Bakómisi mitema na bango makasi;*Monɔkɔ na bango elobaka na lolendo mpenza; 11  Sikoyo bazingi biso;+Bazali koluka mabaku mpo na kokweisa biso.* 12  Monguna azali lokola nkɔsi oyo ezali na mposa makasi ya kopasola nyama bitenibiteni,Lokola mwana-nkɔsi oyo ebombani mpo na kokanga nyama. 13  Tɛlɛmá, Ee Yehova, mpo na kotɛmɛla ye+ mpe kokweisa ye na nse;Bikisá ngai* na lobɔkɔ ya moto mabe na mopanga na yo; 14  Bikisá ngai na lobɔkɔ na yo, Ee Yehova,Liboso ya bato ya mokili oyo,* baoyo likabo na bango ezali na bomoi oyo,+Baoyo otondisi bango na biloko ya kitoko oyo opesi+Baoyo batiki libula epai ya ebele ya bana na bango. 15  Kasi mpo na ngai, nakomona elongi na yo mpo nazali sembo;Nakosepela kolamuka liboso na yo.*+

Maloba na nse

To, “Kitá mpe yoká ngai.”
To, “Bamizingi na mafuta na bango.”
To, “mpo na kobwaka biso na mabele.”
To, “molimo na ngai.”
To, “ntango oyo.”
To, “mpo na komona lolenge na yo.”