Nzembo 9:1-20

  • Kosakola misala ya kokamwa ya Nzambe

    • Yehova azali esika makasi ya kobombana (9)

    • Koyeba nkombo ya Nzambe elakisi kotyela ye motema (10)

Epai ya mokambi ya nzembo; ya Mute-labene.* Mondule ya Davidi. א [Alef] 9  Ee Yehova, nakosanzola yo na motema na ngai mobimba;Nakolobela misala na yo nyonso ya kokamwa.+  2  Nakosepela mpe nakozala na esengo mpo na yo;Nakoyemba mpo na kosanzola* nkombo na yo, Ee Oyo-Aleki-Likoló.+ ב [Bet]  3  Ntango banguna na ngai bakozonga nsima,+Bakobɛta libaku mpe bakokufa na miso na yo.  4  Mpo ozali kosamba likambo na ngai mpe kolongisa ngai;Ofandi na kiti ya bokonzi na yo mpe ozali kosambisa na bosembo.+ ג [Gimel]  5  Opameli bikólo+ mpe obomi bato mabe.Obomi nkombo na bango libela na libela.  6  Banguna babebisami mpo na libela;Opikoli bingumba na bango,Mpe bakokanisama lisusu ata moke te.+ ה [He]  7  Kasi Yehova afandi na kiti ya bokonzi mpo na libela;+Apiki kiti na ye ya bokonzi mpo na bosembo.+  8  Akosambisa na bosembo bato oyo bafandi na mabele;*+Mpo na bato ya bikólo, akozwa bikateli na bosembo.+ ו [Waw]  9  Yehova akokóma esika makasi ya kobombana* mpo na moto oyo azali konyokwama,+Esika makasi ya kobombana na ntango ya mpasi.+ 10  Baoyo bayebi nkombo na yo bakotyela yo motema;+Okosundola ata moke te baoyo balukaka yo, Ee Yehova.+ ז [Zayin] 11  Bóyemba mpo na kosanzola Yehova, ye oyo afandi na Siona;Bóyebisa misala na ye na kati ya bato ya bikólo.+ 12  Akokanisa baoyo bazali na mpasi mpe akozongisa mabe mpo na makila na bango;+Akobosana te kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi.+ ח [Het] 13  Moniselá ngai boboto, Ee Yehova; talá mpasi oyo bato bayinaka ngai bazali komonisa ngai,Yo oyo ozali kobikisa ngai na liwa,*+ 14  Mpo nasakola misala na yo oyo ebongi kosanzolama na baporte ya mwana mwasi ya Siona,+Mpe nasepela na misala ya kobikisa.+ ט [Tet] 15  Bato ya bikólo bazindi na libulu oyo batimoli;Lokolo na bango ekangami na monyama oyo babombaki.+ 16  Yehova ayebani mpo na ekateli ya lisambisi oyo azwi.+ Moto mabe akangami na motambo oyo asalaki na mabɔkɔ na ye moko.+ (Higayone.* Sela) י [Yod] 17  Bato mabe bakokende na Nkunda,*Bato ya bikólo nyonso oyo babosani Nzambe. 18  Kasi mobola bakobosana ye libela te,+Mpe elikya ya bato ya komikitisa ekozala mpamba te.+ כ [Kaf] 19  Tɛlɛmá, Ee Yehova! Moto, mowei mpamba alonga yo te. Bikólo esambisama liboso na yo.+ 20  Bangisá bango, Ee Yehova,+Bato ya bikólo báyeba ete bazali kaka bato, bawei mpamba. (Sela)

Maloba na nse

To, “Nakobɛta miziki mpo na.”
To, “na mabele oyo ebotaka.”
To, “esika ya kobombana oyo etombwaná.”
Lil., “Yo ozali kolongola ngai na baporte ya liwa.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.