Nzembo 78:1-72

  • Misala ya boboto ya Nzambe mpe kozanga kondima ya Yisraele

    • Koyebisa na libota oyo ekoya (2-8)

    • “Bandimelaki Nzambe te” (22)

    • “Bilei ya likoló” (24)

    • “Bayokisaki Mosantu ya Yisraele mawa” (41)

    • Longwa na Ezipito tii na Mokili ya elaka (43-55)

    • “Bakobaki komeka Nzambe” (56)

Maskile.* Ya Asafe.+ 78  Bato na ngai, bóyoka mobeko* na ngai;Bótya likebi* na maloba ya monɔkɔ na ngai.  2  Nakofungola monɔkɔ na ngai mpo na koloba lisese moko. Nakoyebisa basambole ya kala.+  3  Makambo oyo toyoki mpe toyebi,Oyo batata na biso bayebisi biso,+  4  Tokobombela yango bana na bango te;Tokoyebisa yango na libota oyo ekoya+Misala ya Yehova oyo ebongi kosanzolama mpe makasi na ye,+Misala na ye ya kokamwa oyo asali.+  5  Atyaki eloko ya kokanisa na YakoboMpe atyaki mobeko na Yisraele;Apesaki bankɔkɔ na biso mitindoMpo báyebisa makambo yango epai ya bana na bango,+  6  Mpo ete libota oyo ekoya,Bana oyo bakobotama, báyeba yango.+ Mpo bango mpe báyebisa yango na bana na bango.+  7  Ekosala ete bátyela Nzambe motema. Bakobosana te misala ya Nzambe+Kasi bakotosa mitindo na ye.+  8  Mpe bakokóma te lokola bankɔkɔ na bango,Libota ya motó makasi mpe ya batomboki,+Libota ya bato oyo babongisaki motema na bango te+Mpe oyo elimo na bango ezalaki sembo te epai ya Nzambe.  9  Bato ya Efraime bazalaki kobunda na litimbo,Kasi bazongaki nsima na mokolo ya etumba. 10  Babatelaki te kondimana ya Nzambe+Mpe baboyaki kotambola na mobeko na ye.+ 11  Babosanaki mpe makambo oyo asalaki,+Misala na ye ya kokamwa oyo alakisaki bango.+ 12  Asalaki makambo ya kokamwa na miso ya bankɔkɔ na bango,+Na mokili ya Ezipito, na etúká ya Zoane.+ 13  Apasolaki mbu mpo bákatisa,Mpe asalaki ete mai etɛlɛma lokola efelo.*+ 14  Na moi, atambwisaki bango na lipataMpe na butu mobimba na pole ya mɔtɔ.+ 15  Apasolaki mabanga na esobe,Asilisaki mposa na bango ya mai lokola nde na mai mozindo.+ 16  Abimisaki mikɛli na libangaMpe asalaki ete mai etíyola lokola bibale.+ 17  Kasi bakobaki kosalela ye lisumuNa ndenge batombokelaki Oyo-Aleki-Likoló na mokili ekauká;+ 18  Bamekaki Nzambe na motema na bango+Na ndenge basɛngaki bilei oyo bazalaki na mposa na yango makasi.* 19  Bongo balobaki mabe mpo na Nzambe,Balobaki: “Nzambe akoki kopesa biso bilei* na esobe?”+ 20  Talá! Ye abɛtaki libangaMpo mai etíyola mpe mikɛli esopana.+ “Akoki mpe kopesa biso limpa,To akoki kopesa bato na ye mosuni?”+ 21  Ntango Yehova ayokaki bango, asilikaki makasi;+Mɔtɔ+ epelelaki Yakobo,Mpe nkanda na ye emataki lisusu mpo na Yisraele+ 22  Mpo bandimelaki Nzambe te;+Batyaki motema te na likoki na ye ya kobikisa bango. 23  Bongo apesaki mitindo na likoló, likoló oyo etondi na mapata,Mpe afungolaki baporte ya likoló. 24  Akobaki konɔkisela bango mana mpo bálya;Apesaki bango bilei ya likoló.+ 25  Bato balyaki mampa ya bato ya nguya;*+Apesaki bango bilei ebele mpo bátonda.+ 26  Abimisaki mopɛpɛ ya ɛsti na likolóMpe apɛpisaki mopɛpɛ ya sudi na makasi na ye.+ 27  Anɔkiselaki bango mosuni lokola putulu,Bandɛkɛ lokola bambuma ya zɛlo oyo ezali pembenipembeni ya mbu. 28  Akweisaki yango na katikati ya kaa na ye,Zingazinga ya bahema na ye. 29  Balyaki mpe batondaki mingi;Apesaki bango eloko oyo bazalaki na yango mposa.+ 30  Kasi liboso bákokisa mpenza mposa na bango,Wana bilei ezalaki naino na monɔkɔ na bango, 31  Nkanda makasi ya Nzambe engalelaki bango.+ Abomaki bato na bango oyo balekaki makasi;+Akweisaki bilenge mibali ya Yisraele. 32  Atako nyonso wana, basalaki masumu mingi koleka+Mpe bandimaki te misala na ye ya kokamwa.+ 33  Bongo asukisaki mikolo na bango lokola mopɛpɛ mpamba,+Mpe bambula na bango na nsɔmɔ ya pwasa. 34  Kasi mbala nyonso oyo Nzambe abomaki ndambo na bango, bazalaki koluka ye;+Bazalaki kozonga mpe koluka Nzambe, 35  Bazalaki komikundola ete Nzambe azalaki Libanga na bango+Mpe ete Nzambe Oyo-Aleki-Likoló azalaki Mosikoli* na bango.+ 36  Kasi balukaki kokosa ye na monɔkɔ na bangoMpe bakosaki ye na lolemo na bango. 37  Bazalaki sembo te epai na ye;+Mpe bakangamaki te na kondimana na ye.+ 38  Kasi azalaki na motema mawa;+Azalaki kolimbisa* libunga na bango mpe azalaki koboma bango te.+ Mbala mingi, azalaki kozongisa nkanda na ye nsima+Na esika abimisela bango nkanda na ye nyonso. 39  Mpo amikundolaki ete bazali kaka bato ya mosuni,+Mwa mopɛpɛ oyo elekaka mpe ezongaka te.* 40  Mbala boni batombokelaki ye na esobe+Mpe bayokisaki ye motema mpasi na mokili ekauká!+ 41  Mbala na mbala bamekaki Nzambe,+Mpe bayokisaki Mosantu ya Yisraele mawa.* 42  Bakanisaki te nguya* na ye,Mokolo oyo abikisaki* bango na lobɔkɔ ya monguna,+ 43  Ndenge asalaki bilembo na Ezipito+Mpe makamwisi na ye na etúká ya Zoane, 44  Mpe ndenge akómisaki banzela ya mai ya Nile makila,+Bongo bakokaki te komɛla mai ya mikɛli na bango. 45  Atindaki mapokopoko* mpo elya baezipito+Mpe magorodo* mpo ebebisa bango.+ 46  Mpe akabaki mbuma na bango na mayoyo ya nzala,Mbuma ya mosala na bango ya makasi na etuluku ya mayoyo.+ 47  Na mbula ya mabanga, abebisaki nzete na bango ya vinyo+Mpe na mbula ya mabanga ya glasi, banzete na bango ya sikomore. 48  Abomaki banyama na bango oyo ememaka mikumba na mbula ya mabanga+Mpe bibwɛlɛ na bango na nkake.* 49  Akitiselaki bango nkanda na ye ya kongala,Nkɛlɛ, nkanda makasi ná mpasi,Atindaki baanzelu bámema likama. 50  Amonisaki nkanda na ye. Apekisaki te ete liwa ezwa bango;*Mpe akabaki bango* na maladi mabe. 51  Nsukansuka, abomaki bana nyonso ya liboso na Ezipito,+Ebandeli ya nguya na bango ya kobota na kati ya bahema ya Kame. 52  Na nsima, abimisaki bato na ye lokola etonga+Mpe atambwisaki bango lokola etonga na esobe. 53  Akambaki mpe abatelaki bango,Mpe babangaki ata moke te;+Mbu ezipaki banguna na bango.+ 54  Mpe amemaki bango na teritware na ye mosantu,+Etúká oyo ya ngombangomba oyo lobɔkɔ na ye ya mobali ezwaki.+ 55  Abenganaki bikólo liboso na bango;+Apesaki bango libula na nsinga ya komeka;+Afandisaki mabota ya Yisraele na bandako na bango.+ 56  Kasi bakobaki komeka Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, mpe batombokelaki ye;+Batyaki likebi te na makundoli na ye.+ 57  Bango mpe bazongaki nsima mpe basalaki makambo na bokosi lokola bankɔkɔ na bango.+ Bakokaki kotyelama motema te lokola litimbo oyo nsinga na yango ebendami malamu te.+ 58  Bazalaki kaka kosilikisa ye na bisika na bango oyo etombwaná,+Mpe bazalaki koyokisa ye zuwa* na bikeko na bango.+ 59  Nzambe ayokaki mpe asilikaki makasi,+Bongo abwakaki mpenza Yisraele. 60  Nsukansuka, asundolaki tabernakle ya Shilo,+Hema oyo na kati na yango afandaki elongo na bato.+ 61  Atikaki elembo ya makasi na ye ekende na bokangami;Nkembo na ye na lobɔkɔ ya monguna.+ 62  Asundolaki bato na ye na mopanga,+Mpe asilikelaki libula na ye makasi. 63  Mɔtɔ ezikisaki bilenge na ye ya mibali,Mpe bayembaki ata nzembo moko te ya libala mpo na bangɔndɔ na ye.* 64  Banganga-nzambe na ye bakweaki na mopanga,+Mpe basi na bango balelaki te.+ 65  Bongo Yehova alamukaki lokola nde alalaki mpɔngi,+Ndenge moto ya nguya+ oyo alamukaka soki molangwa ya vinyo esili. 66  Mpe azongisaki banguna na ye nsima;+Asalaki ete báyoka nsɔni ya libela. 67  Aboyaki hema ya Yozefe;Aponaki libota ya Efraime te. 68  Kasi aponaki libota ya Yuda,+Ngomba Siona, oyo alingaka.+ 69  Asalaki ete esika na ye mosantu eumela lokola likoló,*+Lokola mabele oyo atyá mpo na libela.+ 70  Aponaki Davidi+ mosaleli na yeMpe azwaki ye na etonga ya bampate,+ 71  Esika oyo azalaki kobatela bampate oyo ezali komɛlisa;Akómisaki ye mobateli ya Yakobo, bato na ye,+Mpe ya Yisraele, libula na ye.+ 72  Abatelaki bango na bosembo ya motema,+Mpe na mayele ya mabɔkɔ na ye akambaki bango.+

Maloba na nse

To, “mateya.”
Lil., “Bósembola litoi.”
To, “nduka.”
To, “bilei mpo na molimo na bango.”
Lil., “kobongisela biso mesa.”
To, “baanzelu.”
To, “Moto oyo azongisaka mabe mpo.”
Lil., “kozipa.”
To mbala mosusu, “Elimo ebimaka mpe ezongaka te.”
To, “motema mpasi.”
Lil., “lobɔkɔ.”
Lil., “asikolaki.”
To, “mafokofoko.” Lolenge moko ya nzinzi oyo eswaka makasi.
To, “mbemba.”
To mbala mosusu, “fiɛvrɛ makasi.”
To, “molimo na bango.”
Lil., “bomoi na bango.”
To, “nkanda.”
Lil., “Mpe bangɔndɔ na ye basanzolamaki te.”
Lil., “Atongaki esika na ye mosantu lokola bisika oyo etombwaná.”