Nzembo 109:1-31
Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi.
109 Ee Nzambe oyo nasanzolaka,+ kofanda nyɛɛ te.
2 Mpo bato mabe ná bato ya bokosi bafungoleli ngai monɔkɔ.
Balobeli ngai na lolemo ya lokuta;+
3 Bazingi ngai na maloba ya koyina,Mpe bazali kobundisa ngai kaka mpamba.+
4 Namoniseli bango bolingo, kasi bazali kaka kotɛmɛla ngai;+Kasi nazali kokoba kobondela.
5 Bazali kozongisela ngai mabe mpo na malamu+Mpe koyina mpo na bolingo oyo nazali kolinga bango.+
6 Tyá moto moko ya mabe ayangela monguna na ngai;*Mpe motɛmɛli* atɛlɛma na lobɔkɔ na ye ya mobali.
7 Ntango asambisami, atángama ete azali na ngambo;*Mpe libondeli na ye etángama ete ezali lisumu.+
8 Mikolo na ye ezala moke;+Moto mosusu azwa mokumba na ye ya mokɛngɛli.+
9 Bana na ye* bákóma bana oyo tata akufá,Mpe mwasi na ye azala mwasi oyo mobali akufá.
10 Bana na ye* bákóma koyengayenga mpe kosɛngasɛnga biloko,Mpe báluka bilei mosika na bisika na bango oyo ebebisamá.
11 Modefisi oyo asɛngaka benefisi na lokoso akanga* nyonso oyo azali na yango,Mpe bapaya bápunza biloko na ye.
12 Moto moko te amonisela ye boboto,*Mpe moto moko te amonisela bana na ye oyo tata akufá boboto.
13 Bana na ye bábomama;+Nkombo na bango elongolama na libota oyo ekolanda.
14 Yehova abosana te libunga ya bankɔkɔ na ye,+Mpe lisumu ya mama na ye elongolama te.
15 Yehova atya ntango nyonso likebi na oyo basali;Mpe alongola na mabele makambo oyo ekosala ete bákanisa bango.+
16 Mpo abosanaki komonisa boboto,*+Kasi akobaki konyokola moto ya mpasi,+ mobola mpe moto oyo motema ebukaniMpo na koboma ye.+
17 Azalaki kolinga kolakela mabe, bongo elakeli mabe eyelaki ye;Mpe azalaki kosepela te kopambola basusu, bongo lipamboli ezalaki mosika na ye.
18 Alataki bilakeli mabe lokola elamba.
Mpe ekɔtaki na nzoto na ye lokola mai,Na kati ya mikuwa na ye lokola mafuta.
19 Bilakeli mabe na ye ezala lokola elamba oyo amilíngaka+Mpe lokola mokaba oyo alataka ntango nyonso.
20 Yango nde lifuti oyo euti na Yehova mpo na moto oyo azali kotɛmɛla ngai+Mpe mpo na baoyo bazali koloba makambo ya mabe mpo na ngai.*
21 Kasi yo, Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso,Salelá ngai bolamu mpo na nkombo na yo.+
Bikisá ngai, mpo bolingo na yo ya sembo ezali malamu.+
22 Mpo nazangi lisalisi mpe nazali mobola,+Mpe motema na ngai etɔbɔlami.+
23 Nazali kokende lokola elili ntango ezali kolimwa;Napupolami lokola liyoyo.
24 Mabɔlɔngɔ na ngai elɛngi mpo na kokila bilei;Nzoto na ngai ekɔndi, ekɔndi makasi mpenza.*
25 Nakómi na miso na bango eloko moko ya kotyola.+
Soki bamoni ngai, baningisaka motó na bango.+
26 Ee Yehova Nzambe na ngai, salisá ngai;Bikisá ngai na bolingo na yo ya sembo.
27 Báyeba ete oyo nde lobɔkɔ na yo;Ete yo, Ee Yehova, osali yango.
28 Bango bálakela mabe, kasi yo, pambolá.
Ntango bazali kotɛlɛmɛla ngai, báyokisama nsɔni,Kasi mosaleli na yo asepela.
29 Baoyo bazali kotɛmɛla ngai bálata nsɔni;Nsɔni ezipa bango lokola elamba ya molai.*+
30 Monɔkɔ na ngai ekosanzola Yehova mingi;Nakosanzola ye liboso ya bato ebele.+
31 Mpo akotɛlɛma na lobɔkɔ ya mobali ya mobola,Mpo na kobikisa ye na mabɔkɔ ya baoyo bazali kokweisa ye.
Maloba na nse
^ Lil., “ayangela ye.”
^ To, “mofundi.”
^ To, “moto mabe.”
^ Lil., “Bana na ye ya mibali.”
^ Lil., “Bana na ye ya mibali.”
^ To, “atya motambo mpo na.”
^ To, “bolingo ya sembo.”
^ To, “bolingo ya sembo.”
^ To, “molimo na ngai.”
^ Lil., “Mosuni na ngai ekɔndi, nazali na mafuta te.”
^ To, “kazaka ezangá mabɔkɔ.”

