Nzembo 120:1-7

  • Mopaya oyo azali na mposa makasi ya kimya

    • ‘Bikisá ngai na lolemo ya bokosi’ (2)

    • “Nalingi kimya” (7)

Loyembo ya ntango ya komata.* 120  Na mpasi na ngai nabelelaki Yehova,+Mpe ayanolaki ngai.+  2  Ee Yehova, bikisá ngai* na mbɛbu ya lokuta,Mpe na lolemo ya bokosi.  3  Eloko nini Nzambe akosala yo, mpe ndenge nini akopesa yo etumbu,*Yo lolemo ya bokosi?+  4  Ná makula oyo epelisami+ ya mobundi-etumba,Ná makala ya banzete ya retama oyo ezali kopela.+  5  Mawa na ngai, mpo nafandi mopaya na Mesheke!+ Nazali kofanda na katikati ya bahema ya Kedare.+  6  Nafandi ntango molai mingiNá bato oyo bayinaka kimya.+  7  Nalingi kimya, kasi soki nalobi,Bango balingi etumba.

Maloba na nse

To, “molimo na ngai.”
Lil., “mpe akobakisela yo nini?”