Nzembo 76:1-12
Epai ya mokambi ya nzembo; eyembamaka elongo na bibɛtɛlo ya bansinga. Mondule ya Asafe.+ Loyembo.
76 Nzambe ayebani na Yuda;+Na Yisraele nkombo na ye ezali monene.+
2 Mpe esika na ye ya kobombana ezali na Saleme,+Mpe esika na ye ya kofanda ezali na Siona.+
3 Kuna abukaki mbanzi ya litimbo oyo ezali kopela,Nguba ná mopanga mpe bibundeli ya etumba.+ (Sela)
4 Yo ozali kongɛnga makasi mpenza;*Ozali na nkembo mingi koleka bangomba oyo etondi na banyama ya kolya.
5 Bato ya mpiko bapunzami.+
Balali na liwa;Babundi-bitumba nyonso bazangaki makasi.+
6 Ee Nzambe ya Yakobo, na mpamela na yo,Motambwisi-likalo ná mpunda balali na liwa.+
7 Yo moko ozali koyokisa nsɔmɔ.+
Nani akoki kotɛlɛma liboso ya nkanda na yo makasi?+
8 Uta na likoló oyebisaka lisambisi na yo likoló ya banguna na yo;+Mabele ebangaki mpe efandaki nyɛɛ+
9 Ntango Nzambe atɛlɛmaki mpo na kopesa etumbu,Mpo na kobikisa bato nyonso ya komikitisa ya mabele.+ (Sela)
10 Soki bato basiliki, ezali libaku mpo osanzolama.+Soki bato bazali kaka na nkanda, ezali libaku mpo okumisama.
11 Bósala bilako epai ya Yehova Nzambe na bino mpe bókokisa yango,+Tiká baoyo nyonso bazali zingazinga na ye bámema likabo na bango na kobanga.+
12 Akokitisa lolendo* ya batambwisi;Azali koyokisa bakonzi ya mabele nsɔmɔ.

