Nzembo 73:1-28
Mondule ya Asafe.+
73 Nzambe azali mpenza malamu epai ya Yisraele, epai ya baoyo bazali na motema pɛto.+
2 Kasi etikalaki moke makolo na ngai elongwa na nzela ya sembo,Matambe na ngai etikalaki moke esɛlimwa.+
3 Mpo ntango namonaki kimya ya bato mabeNakómaki kolula bato ya lofundo.+
4 Mpo bakufaka kozanga komona mpasi;Bazali nzoto kolɔngɔnɔ.*+
5 Batungisamaka te lokola basusu,+Banyokwamaka te lokola bato mosusu.+
6 Yango wana, lolendo ezali nsinga ya monzɛlɛ na nkingo na bango;+Mobulu elataka bango lokola elamba.
7 Bomɛngo* na bango ekómisi miso na bango minene;Kozwa na bango eleki kutu ndenge bazalaki kokanisa.
8 Bazali kosɛka basusu mpe koloba makambo ya mabe.+
Na lofundo na bango bazali koluka konyokola basusu.+
9 Bazali koloba lokola nde batombwami mpenza likoló,Mpe lolemo na bango ezali kotambola na mabele na lolendo mpenza.
10 Yango wana, bato ya Nzambe babaluki na ngámbo na bango,Mpe bamɛli mai na bango oyo etondi mɛkɛ.
11 Balobi ete: “Ndenge nini Nzambe akoki koyeba likambo yango?+
Oyo-Aleki-Likoló ayebi mpenza likambo nyonso?”
12 Bato mabe bazalaka bongo, oyo bamitungisaka ata moke te.+
Bazali kokoba kobakisa bozwi na bango.+
13 Ya solo mpenza, napɛtoli motema na ngai kaka mpambaMpe nasukoli mabɔkɔ na ngai kaka mpamba mpo na komonisa ete nazali na ngambo te.+
14 Mpe natungisamaki mokolo mobimba;+Ntɔngɔ nyonso Nzambe azalaki kosembola ngai.+
15 Kasi soki nalobaki makambo yango,Nalingaki kotɛka bato na yo.*
16 Ntango nalukaki koyeba yango,Natungisamaki
17 Tii ntango nakɔtaki na esika mosantu monene ya Nzambe,Mpe nasosolaki ndenge bomoi ya bato mabe ekozala na mikolo oyo ezali koya.
18 Ya solo mpenza, otye bango nde na mabele ya mosɛlu.+
Mpo bákwea mpe bábebisama.+
19 Libebi na bango ezali ya mbalakaka!+
Nsuka na bango ezali nsɔmɔ mpe pwasa!
20 Bazali lokola ndɔtɔ oyo moto abosani nsima ya kolamuka,Yango nde ekokómela bango ntango yo moko okolamuka, Ee Yehova, okobengana bango.*
21 Kasi motema na ngai ezokaki+Mpe nayokaki mpasi makasi na kati na ngai mpenza.*
22 Nazangaki mayele mpe bososoli;Nazalaki lokola nyama liboso na yo.
23 Kasi sikoyo nazali elongo na yo ntango nyonso;Osimbi lobɔkɔ na ngai ya mobali.+
24 Okambaka ngai na toli na yo,+Mpe na nsima okomema ngai tii na nkembo.+
25 Nani mosusu nazali na ye na likoló?
Mpe longola yo, nazali na mposa ya eloko mosusu te na mabele.+
26 Nzoto na ngai mpe motema na ngai ekoki kolɛmba,Kasi, Nzambe azali libanga ya motema na ngai mpe eteni na ngai mpo na libela.+
27 Ya solo, bato oyo bazali mosika na yo bakokufa.
Okosilisa* baoyo bazali sembo te epai na yo.*+
28 Mpo na ngai, kopusana epai ya Nzambe ezali malamu.+
Nasali ete Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso azala esika na ngai ya kokima,Mpo nasakola misala na yo nyonso.+
Maloba na nse
^ To, “Libumu na bango ezali mafutamafuta.”
^ Lil., “Mafuta.”
^ Lil., “libota ya bana na yo.”
^ Lil., “okotyola elilingi na bango.”
^ Lil., “na bangɛi na ngai.”
^ Lil., “Okokanga monɔkɔ ya.”
^ To, “baoyo bazali kosala lokola moto ya pite.”