Nzembo 94:1-23

  • Libondeli mpo na kosɛnga Nzambe azongisa mabe

    • “Tii ntango nini bato mabe bakokoba?” (3)

    • Kosembola ya Yehova epesaka esengo (12)

    • Nzambe akosundola bato na ye te (14)

    • “Bazali na mokano ya kobimisa mikakatano na nzela ya mobeko” (20)

94  Ee Yehova, Nzambe oyo azongiselaka bato mabe mabe na bango,+Ee Nzambe oyo azongiselaka bato mabe mabe na bango, ngɛngá!  2  Ee Mosambisi ya mabele, tɛlɛmá.+ Pesá bato ya lolendo etumbu oyo ebongi na bango.+  3  Ee Yehova, tii ntango nini bato mabe,Tii ntango nini bato mabe bakokoba kosepela mingi?+  4  Bazali kosopa maloba mpe bazali koloba na lofundo mpenza;Bato nyonso oyo basalaka makambo ya mabe bazali komikumisa.  5  Ee Yehova, bazali konyatanyata bato na yo,+Mpe konyokola libula na yo.  6  Bazali koboma mwasi oyo mobali akufá mpe moto oyo afandi mopaya,Mpe bazali koboma bana oyo batata bakufá.  7  Bazali koloba: “Yah azali komona te;+Nzambe ya Yakobo azali kotyela yango likebi te.”+  8  Bóyeba likambo oyo, bino bato oyo bozangi mayele;Bino bazoba, ntango nini bokomonisa mayele ya kososola?+  9  Moto oyo asalá* litoi, akoki nde koyoka te? Moto oyo asalá liso, akoki nde komona te?+ 10  Moto oyo asembolaka bikólo, akoki nde kopamela te?+ Moto oyo apesaka bato boyebi!+ 11  Yehova ayebi makanisi ya bato,Ayebi ete ezali lokola mwa mopɛpɛ.+ 12  Ee Yah, esengo na mobali oyo ozali kosembola,+Moto oyo ozali koteya mobeko na yo,+ 13  Mpo na kopesa ye kimya na mikolo ya mpasi,Tii libulu ekotimolama mpo na moto mabe.+ 14  Mpo Yehova akosundola bato na ye te,+Akotika mpe libula na ye te.+ 15  Mpo lisambisi ekokatama lisusu na bosembo,Mpe bato nyonso ya motema sembo bakolanda yango. 16  Nani akokɔtela ngai mpo na kobunda na bato mabe? Nani akokɔtela ngai mpo na kobunda na baoyo basalaka makambo ya mabe? 17  Soki Yehova asalisaka ngai te,Na mwa ntango moke, nalingaki kozala lisusu te.*+ 18  Ntango nalobaki: “Lokolo na ngai ezali kosɛlimwa,” Ee Yehova, bolingo na yo ya sembo ezalaki kaka kosalisa ngai.+ 19  Ntango natungisamaki koleka ndelo,Obɔndisaki ngai mpe okitisaki ngai motema.*+ 20  Okosala ata moke te elongo na bakonzi* mabeMpo bazali na mokano ya kobimisa mikakatano na nzela ya mobeko.+ 21  Bazali kobundisa moto ya sembo* na ndenge ya mabe mpenza+Mpe bazali kokatela moto oyo asali mabe te etumbu ya liwa.*+ 22  Kasi Yehova akokóma esika na ngai ya makasi ya kobombana,*Nzambe na ngai azali libanga ya esika na ngai ya kokima.+ 23  Akosala ete misala na bango ya mabe ezongela bango.+ Akosilisa bango* na misala na bango ya mabe. Yehova Nzambe na biso akosilisa bango.*+

Maloba na nse

Lil., “aloná.”
Lil., “nalingaki kofanda na esika ya nyɛɛ.”
To, “Mabɔndisi na yo ebandaki kokitisa molimo na ngai.”
To, “basambisi.” Lil., “kiti ya bokonzi.”
Lil., “bazali kotánga makila ya moto oyo azali na likambo te ete azali na ngambo (moto mabe).”
To, “molimo ya moto ya sembo.”
To, “esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná.”
Lil., “Akokangisa bango monɔkɔ.”
Lil., “akokangisa bango monɔkɔ.”