Nzembo 95:1-11
95 Bóya, tóganga na esengo mpo na Yehova!
Tóganga na koganga ya bolongi mpo na Libanga ya lobiko na biso.+
2 Tókende liboso na ye* na matɔndi;+Tóyemba mpe tóganga na bolongi mpo na ye.
3 Mpo Yehova azali Nzambe monene,Mokonzi moko monene likoló ya banzambe mosusu nyonso.+
4 Bisika ya bozindo ya mabele ezali na lobɔkɔ na ye;Bansɔngɛ ya bangomba ezali ya ye.+
5 Mbu, oyo asalá, ezali ya ye,+Mpe mabɔkɔ na ye esalaki mabele ya kokauka.+
6 Bóya, tósambela mpe tógumbama;Tófukama liboso ya Yehova Mokeli na biso.+
7 Mpo ye azali Nzambe na biso,Mpe biso tozali bato ya esika na ye ya koleisa bibwɛlɛ matiti,Bampate oyo azali kobatela.*+
Lelo oyo, soki boyoki mongongo na ye,+
8 Bókómisa motema na bino makasi te lokola na Meriba,*+Lokola na mokolo ya Masa* na esobe,+
9 Ntango bankɔkɔ na bino bamekaki ngai;+Batumolaki ngai, atako bamonaki misala na ngai.+
10 Na boumeli ya mbula 40 nayokaki libota yango mabe mpenza,* mpe nalobaki ete:
“Balandaka ntango nyonso bamposa ya mitema na bango;Bayebi banzela na ngai te.”
11 Bongo nalapaki ndai na nkanda na ngai ete:
“Bakokɔta te na kopema na ngai.”+

