Nzembo 20:1-9

  • Nzambe abikisi mokonzi oyo atye mafuta

    • Basusu batyaka motema na makalo mpe bampunda, ‘kasi tobelelaka nkombo ya Yehova’ (7)

Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi. 20  Tiká Yehova ayanola yo na mokolo ya mpasi. Nkombo ya Nzambe ya Yakobo ebatela yo.+  2  Atinda lisalisi na yo uta na esika mosantu,+Mpe asunga yo uta na Siona.+  3  Akanisa makabo na yo nyonso;Andima mpenza likabo na yo ya kotumba.* (Sela)  4  Akokisa bamposa ya motema na yo+Mpe alongisa makambo nyonso oyo ozali kokana.*  5  Tokoganga na esengo mpo na misala na yo ya kobikisa;+Tokotombola babɛndɛlɛ na biso mpo na nkombo ya Nzambe na biso.+ Yehova akokisa nyonso oyo ozali kosɛnga.  6  Sikoyo nayebi ete Yehova abikisaka moto na ye oyo atyami mafuta.+ Ayanolaka ye uta na likoló na ye mosantuNa misala na ye minene ya kobikisa* ya lobɔkɔ na ye ya mobali.+  7  Basusu batyaka motema na makalo mpe basusu na bampunda,+Kasi biso, tobelelaka nkombo ya Yehova Nzambe na biso.+  8  Babɛti libaku mpe bakwei;Kasi biso, totɛlɛmi mpe tozongisami.+  9  Ee Yehova, bikisá mokonzi!+ Akoyanola biso na mokolo oyo tokobelela mpo na lisalisi.+

Maloba na nse

Lil., “Atalela likabo na yo ya kotumba lokola nde mafuta.”
To, “toli na yo nyonso.”
To, “Akolonga na makambo minene.”