Nzembo 38:1-22

  • Libondeli ya moto oyo abongoli motema, kasi azali konyokwama

    • “Natungisami mpe mawa esilisi ngai makasi” (6)

    • Yehova ayokaka baoyo bazelaka ye (15)

    • “Natungisamaki mpo na lisumu na ngai” (18)

Mondule ya Davidi, mpo ezala likambo ya kokanisa.* 38  Ee Yehova, kopamela ngai na nkanda na yo te,Mpe kosembola ngai te na nkanda na yo ya makasi.+  2  Mpo makula na yo ekɔti mpenza na kati na ngai,Mpe lobɔkɔ na yo ezali kilo likoló na ngai.+  3  Nzoto na ngai mobimba ezali kobɛla* mpo na nkanda na yo. Mikuwa na ngai ezali na kimya te mpo na lisumu na ngai.+  4  Mpo mabunga na ngai eleki na motó na ngai;+Lokola mokumba moko ya kilo, ezali mpenza kilo oyo nakokoka komema te.  5  Bampota na ngai ekómi kolumba nsolo mpe kobimisa tofina*Mpo na bozoba na ngai.  6  Natungisami mpe mawa esilisi ngai makasi;Mokolo mobimba, natamboli epai na epai na mawa na ngai.  7  Mɔtɔ ezali kopela na kati na ngai;*Nzoto na ngai mobimba ezali kobɛla.+  8  Nasili makasi mpe natutami mpenza;Mawa ya motema na ngai esali ete namilelalela* na mongongo makasi.*  9  Ee Yehova, mposa na ngai nyonso ezali liboso na yo,Mpe kolela ya motema* na ngai ebombami te liboso na yo. 10  Motema na ngai ebɛti makasi, nguya na ngai etiki ngai,Mpe pole ya miso na ngai elimwe.+ 11  Baninga mpe bazalani na ngai baboyi ngai mpo na bampasi na ngai,Mpe baoyo bafandaka pene na ngai batɛlɛmi mosika. 12  Baoyo balukaka bomoi na ngai batye mitambo;Baoyo bazali koluka kosala ngai mabe bazali kolobela libebi;+Mpe mokolo mobimba, bazali kaka koloba na nse nse maloba ya bokosi. 13  Kasi lokola moto oyo akufá matoi, nazali koyoka te;+Mpe lokola moto oyo alobaka te, nazali kofungola monɔkɔ na ngai te.+ 14  Nakómi lokola moto oyo akoki koyoka te,Mpe oyo monɔkɔ na ye ezali na eloko moko te ya koloba mpo na komilongisa. 15  Mpo nazelaki nde yo, Ee Yehova,+Mpe oyanolaki ngai, Ee Yehova Nzambe na ngai.+ 16  Mpo nalobaki ete: “Básepela te na mpasi na ngai;To bámitombola te likoló na ngai soki lokolo na ngai esɛlimwi.” 17  Mpo etikalaki moke nakwea,Mpe nazalaki na mpasi ntango nyonso.+ 18  Nayambolaki libunga na ngai;+Natungisamaki mpo na lisumu na ngai.+ 19  Kasi banguna na ngai bazali na makasi* mpe na nguya,*Baoyo bazali koyina ngai kaka mpamba bakómi ebele. 20  Bazongiselaki ngai mabe mpo na malamu;Bazalaki koluka kopekisa ngai mpo nakoba te kosala oyo ezali malamu. 21  Ee Yehova, kosundola ngai te. Ee Nzambe, kozala mosika na ngai te.+ 22  Yaká noki kosalisa ngai,Ee Yehova, lobiko na ngai.+

Maloba na nse

To, “mpo ezongisa na makanisi.”
Lil., “Eteni ata moko te ya malamu ezali na nzoto na ngai.”
To, “mayina.”
Lil., “Bangɛi na ngai ezali kozika mpenza.”
To, “nakimela.”
To, “na koganga makasi.”
To, “kokimela.”
Lil., “bomoi.”
To mbala mosusu, “Kasi banguna na ngai bazali ebele kozanga ntina.”