Nzembo 63:1-11

  • Kozala na mposa makasi ya Nzambe

    • “Bolingo na yo ya sembo ezali malamu koleka bomoi” (3)

    • ‘Natondi na oyo eleki malamu’ (5)

    • Komanyola makambo ya Nzambe na butu (6)

    • ‘Nakangami makasi na Nzambe’ (8)

Mondule ya Davidi, ntango azalaki na mokili ekauká ya Yuda.+ 63  Ee Nzambe, ozali Nzambe na ngai, nazali kaka koluka yo.+ Nazali* mpenza na mposa na yo.+ Nalɛmbi* mpo nazali na mposa na yo makasiNa mokili oyo ekauká, oyo eloko ebotaka te mpe mai ezali te.+  2  Yango wana natalaki yo na esika mosantu;Namonaki makasi na yo mpe nkembo na yo.+  3  Mpo bolingo na yo ya sembo ezali malamu koleka bomoi,+Mbɛbu na ngai ekokumisa yo.+  4  Na yango, nakosanzola yo bomoi na ngai mobimba;Na nkombo na yo, nakotombola mabɔkɔ na ngai.  5  Natondi* na eteni oyo eleki malamu mpe kitoko,*Yango wana monɔkɔ na ngai ekosanzola yo na esengo oyo ezali na mbɛbu na ngai.+  6  Nakanisaka yo ntango nazali na mbeto na ngai;Namanyolaka na ntina na yo butu mobimba.+  7  Mpo ozali mosungi na ngai,+Mpe nazali koganga na esengo na elili ya mapapu na yo.+  8  Nakangami* na yo makasi;Lobɔkɔ na yo ya mobali esimbi ngai makasi.+  9  Kasi baoyo bazali koluka kobebisa bomoi na ngai*Bakokita na nse mpenza ya mabele. 10  Bakokaba bango na nguya ya mopanga;Bakokóma bilei ya bagambala. 11  Kasi mokonzi akosepela na ntina na Nzambe. Moto nyonso oyo azali kolapa ndai na nkombo ya Nzambe akosepela,*Mpo monɔkɔ ya baoyo bazali koloba lokuta ekokangisama.

Maloba na nse

To, “Molimo na ngai ezali.”
Lil., “Molimo na ngai elɛmbi.”
To, “Molimo na ngai etondi.”
Lil., “mafuta mpe mafutamafuta.”
To, “Molimo na ngai ekangami.”
To, “kobebisa molimo na ngai; koboma ngai.”
To, “akomikumisa.”