Nzembo 130:1-8

  • “Nabeleli yo uta na bisika ya mozindo”

    • “Soki otalaka kaka mabunga” (3)

    • Kolimbisa ya solo ezalaka epai ya Yehova (4)

    • “Nazeli Yehova na mposa makasi” (6)

Loyembo ya ntango ya komata. 130  Ee Yehova, nabeleli yo uta na bisika ya mozindo.+  2  Ee Yehova, yoká mongongo na ngai. Litoi na yo etya likebi na libondeli* na ngai mpo na kosɛnga lisalisi.  3  Soki otalaka* kaka mabunga, Ee Yah,*Ee Yehova, nani akotɛlɛma?+  4  Kasi olimbisaka mpenza,+Mpo bázala na nsɔmɔ na* yo.+  5  Natyelaka Yehova elikya, natyaka elikya na ngai mobimba* epai na ye,Nazeli liloba na ye.  6  Nazeli* Yehova na mposa makasi+Koleka ndenge basinzili bazelaka ntɔngɔ,+Ɛɛ koleka ndenge basinzili bazelaka ntɔngɔ.  7  Yisraele akoba kozela Yehova.Mpo Yehova azali sembo na bolingo na ye,+Mpe azali na nguya mingi ya kosikola.  8  Akosikola Yisraele na mabunga na ye nyonso.

Maloba na nse

To, “lilɔmbɔ.”
To, “otángaka.”
“Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.
To, “bábanga.”
To, “molimo na ngai.”
To, “Molimo na ngai ezeli.”