Nzembo 21:1-13

  • Mokonzi oyo atyeli Yehova motema apambolami

    • Bapesi mokonzi bomoi molai (4)

    • Banguna ya Nzambe bakolonga te (8-12)

Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi. 21  Ee Yehova, mokonzi asepelaka na makasi na yo;+Asepelaka mpenza na misala na yo ya kobikisa!+  2  Okokisi mposa ya motema na ye,+Mpe oboyi te kokokisa kosɛnga ya mbɛbu na ye. (Sela)  3  Mpo opamboli ye mingi mpenza;Otye na motó na ye motole ya wolo ya kitoko.*+  4  Asɛngaki yo azala na bomoi, mpe opesaki ye yango,+Opesaki ye bomoi molai,* libela na libela.  5  Misala na yo ya kobikisa ememeli ye nkembo monene.+ Opesi ye lokumu ná nkembo.  6  Okómisi ye moto oyo apambolami mpo na seko;+Osepelisi ye na esengo liboso* na yo.+  7  Mpo mokonzi atyeli Yehova motema;+Mpo na bolingo ya sembo ya Oyo-Aleki-Likoló, akokwea ata moke te.*+  8  Lobɔkɔ na yo ekozwa banguna na yo nyonso;Lobɔkɔ na yo ya mobali ekozwa baoyo bayinaka yo.  9  Na ntango oyo etyamá, oyo okotyela bango likebi, okokómisa bango lokola esika moko ya mɔtɔ makasi. Na nkanda na ye, Yehova akopesa bango etumbu, mpe mɔtɔ ekozikisa bango.+ 10  Okolongola libota* na bango na mabele,Mpe bana na bango na kati ya bana ya bato. 11  Mpo bakani kosalela yo likambo ya mabe;+Baluki kosalela mayele mabe oyo ekolonga te.+ 12  Mpo okosala ete bázonga nsima+Na ndenge okotalisa litimbo* na yo epai na bango.* 13  Tɛlɛmá, Ee Yehova, mpe monisá makasi na yo. Tokoyemba mpo na kosanzola nguya na yo.*

Maloba na nse

To, “oyo epɛtolami.”
Lil., “bolai ya mikolo.”
Lil., “ya elongi.”
To, “akotengatenga ata moke te.”
Lil., “mbuma.”
Lil., “bansinga ya litimbo.”
Lil., “na bilongi na bango.”
Lil., “Tokobɛta miziki mpo na nguya na yo.”