Nzembo 137:1-9

  • Pene ya bibale ya Babilone

137  Tofandaki pene ya bibale ya Babilone.+ Tolelaki ntango tokanisaki Siona.+  2  Na banzete ya arava oyo ezalaki na katikati na yango,*Tokakisaki banzɛnzɛ na biso.+  3  Mpo kuna, baoyo bakangaki biso basɛngaki tóyembela bango,+Baoyo bazalaki kosɛka biso bazalaki na mposa ya kosepela: “Bóyembela biso loyembo moko ya Siona.”  4  Ndenge nini tokoki koyemba loyembo ya YehovaNa mabele ya bapaya?  5  Ee Yerusaleme, soki nabosani yo,Lobɔkɔ na ngai ya mobali ebosana mosala na yango.*+  6  Soki nakanisi yo te,Soki namoni te ete Yerusaleme ezali na ntina mingi kolekaBiloko mosusu oyo esepelisaka ngai,Tiká lolemo na ngai ekangama na monɔkɔ na ngai.+  7  Ee Yehova, kanisá oyo Baedome balobaki,Mokolo oyo Yerusaleme ekweaki: “Bóbuka yango! Bóbuka yango tii na moboko na yango!”+  8  Ee mwana mwasi ya Babilone, oyo mosika te akobebisama,+Esengo na ye oyo akofuta yoMpo na ndenge oyo osalaki biso.+  9  Esengo na ye oyo akokanga bana na yoMpe akobukabuka bango na mabanga.+

Maloba na nse

Ezali komonisa Babilone.
To mbala mosusu, “ekɔnda.”