Nzembo 8:1-9

  • Nkembo ya Nzambe mpe lokumu ya moto

    • “Nkombo na yo ezali monene!” (1,9)

    • “Moto, mowei mpamba azali nani?” (4)

    • ‘Moto alatisami motole ya lokumu’ (5)

Epai ya mokambi ya nzembo; mpo na Gitite.* Mondule ya Davidi. 8  Ee Yehova Nkolo na biso, nkombo na yo ezali monene na mabele mobimba;Yo otye nkembo na yo mosika mpenza koleka ata likoló!*+  2  Na monɔkɔ ya bana mpe ya bana oyo bazali komɛla mabɛlɛ+ otye makasi na yoMpo na banguna na yo,Mpo na kosala ete monguna ná moto oyo azongisaka mabe báfanda kimya.  3  Ntango namonaka likoló oyo osalá, misala ya misapi na yo,Sanza ná minzoto oyo obongisá,+  4  Moto, mowei mpamba azali nani mpo okanisa ye,Mpe mwana ya moto azali nani mpo obatela ye?+  5  Osalaki ye mwa moke na nse ya baanzelu,*Mpe olatisaki ye motole* ya nkembo mpe ya lokumu.  6  Opesi ye bokonzi likoló ya misala ya mabɔkɔ na yo;+Otye eloko nyonso na nse ya makolo na ye:  7  Bitonga nyonso ya bampate, bangɔmbɛ,Banyama ya zamba,*+  8  Bandɛkɛ ya likoló mpe mbisi ya mbu,Eloko nyonso oyo elekaka na kati ya mbu.  9  Ee Yehova Nkolo na biso, nkombo na yo ezali mpenza monene na mabele mobimba!

Maloba na nse

To mbala mosusu, “Yo oyo nkembo na yo elobelamaka koleka likoló.”
To, “baoyo bazali lokola Nzambe.”
To, “ekɔti ya bokonzi.”
Lil., “Banyama ya esobe.”