Nzembo 33:1-22

  • Kosanzola Mozalisi

    • “Bóyembela ye loyembo ya sika” (3)

    • Yehova azalisaki na nzela ya liloba mpe elimo na ye (6)

    • Esengo na ekólo ya Yehova (12)

    • Liso ya Yehova etalatalaka (18)

33  Bóganga na esengo mpo na Yehova, bino bato ya sembo.+ Ebongi mpenza ete bato malamu básanzola ye.  2  Bópesa Yehova matɔndi na nzɛnzɛ;Bóyemba* mpo na kosanzola ye na ebɛtɛlo ya nsinga zomi.  3  Bóyembela ye loyembo ya sika;+Bóbɛta nsinga malamu, nzela moko na koganga ya esengo.  4  Mpo liloba ya Yehova ezali sembo,+Mpe nyonso oyo asalaka ebongi kotyelama motema.  5  Ye alingaka boyengebene mpe bosembo.+ Mabele etondi na bolingo ya sembo ya Yehova.+  6  Likoló esalemaki na liloba ya Yehova,+Mpe eloko nyonso oyo ezali na likoló* esalemaki na mpema* ya monɔkɔ na ye.  7  Ye asangisaka mai ya mbu esika moko lokola bifelo;+Atyaka mai oyo etomboki na bandako ya kobomba biloko.  8  Bato nyonso ya mabele bábanga Yehova.+ Bato nyonso oyo bafandi na mabele oyo ebotaka bázala na nsɔmɔ na ye.  9  Mpo alobaki, mpe eloko nyonso ezalisamaki;+Apesaki mitindo, mpe yango etɛlɛmaki bongo.+ 10  Yehova abebisi mayele mabe* ya bikólo;+Abebisi makanisi* ya bato ya bikólo.+ 11  Kasi bikateli* ya Yehova ekotikala mpo na libela;+Makanisi ya motema na ye ezali mpo na libota na libota. 12  Esengo na ekólo oyo Yehova azali Nzambe na yango,+Bato oyo ye aponi bázala eloko na ye moko.+ 13  Yehova atalaka na nse uta na likoló;Amonaka bana nyonso ya bato.+ 14  Uta na esika oyo afandaka,Atalatalaka bato oyo bafandi na mabele. 15  Azali kobongisa mitema na bango nyonso;Azali kotalatala misala na bango nyonso.+ 16  Kozala na limpinga monene elingi koloba te ete mokonzi akobikisama;+Kozala na nguya mingi elingi koloba te ete moto ya nguya akobikisama.+ 17  Kotya motema te ete mpunda ekosalisa yo olonga etumba; okomikosa.+Nguya na yango monene te nde ekobikisa. 18  Talá! Liso ya Yehova etalaka baoyo babangaka ye,+Baoyo bazelaka bolingo na ye ya sembo, 19  Mpo na kobikisa bango* na liwaMpe kobatela bango na bomoi na ntango ya nzala.+ 20  Tozali* kozela Yehova. Ye azali mosungi na biso mpe nguba na biso.+ 21  Mitema na biso esepelaka na ye,Mpo totyelaka nkombo na ye mosantu motema.+ 22  Ee Yehova, tiká bolingo na yo ya sembo ezala likoló na biso,+Wana tozali kokoba kozela yo.+

Maloba na nse

^ To, “Bóbɛta miziki.”
^ Lil., “limpinga na yango nyonso.”
^ To, “elimo.”
^ To, “myango.”
^ To, “toli.”
^ To, “toli.”
^ To, “molimo na bango.”
^ To, “Molimo na biso ezali.”