Nzembo 131:1-3

  • Kozanga eloko ya kosala lokola mwana oyo batiki komɛlisa mabɛlɛ

    • Nazali koluka makambo mineneminene te (1)

Loyembo ya ntango ya komata. Ya Davidi. 131  Ee Yehova, motema na ngai ezali na lolendo te,Miso na ngai emitomboli mpe te;+Nazali koluka mpe makambo mineneminene te,+Mpe nazali koluka te makambo oyo eleki ngai.  2  Kutu nabɔndisi molimo na ngai* mpe nafandisi yango kimya+Lokola mwana oyo mama na ye atiki komɛlisa ye mabɛlɛ.Nazali* na eloko ya kosala te lokola mwana oyo batiki komɛlisa mabɛlɛ.  3  Yisraele azela Yehova+Banda sikoyo mpe mpo na libela.

Maloba na nse

^ To, “namibɔndisi.” Talá Ndimbola ya maloba.
^ To, “Molimo na ngai ezali.”