Nzembo 126:1-6

  • Esengo ya komona ndenge Siona ezongisami

    • “Yehova asali makambo ya minene” (3)

    • Kolela ebongwani esengo (5, 6)

Loyembo ya ntango ya komata. 126  Ntango Yehova azongisaki bato ya Siona oyo bakangamaki,+Tokanisaki lokola nde tozali kolɔta.  2  Na ntango yango tosɛkaki makasi,Mpe lolemo na biso egangaki na esengo.+ Na ntango yango bato ya bikólo balobanaki bango na bango ete: “Yehova asali makambo ya minene mpo na bango.”+  3  Yehova asali makambo ya minene mpo na biso.+Mpe tozali na esengo mingi mpenza.  4  Ee Yehova, zongisá bato na biso oyo bakangamaki,Lokola mikɛli ya mai na Negebe.*  5  Baoyo bazali kolona mboto na mai ya misoBakobuka na koganga ya esengo.  6  Ye oyo abimi, ata na kolela,Amemi saki oyo etondi na mboto,Akozonga mpenza na koganga ya esengo,+Amemi maboke ya matiti ya mbuma ya blé.*+

Maloba na nse

To, “lobwaku ya mokɛli na sudi.”
To, “ɔrje.”