Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda ya Nzembo

Mikapo

Makambo oyo ezali na kati

  • 1

    • Etamboli mibale ekeseni

      • Kotánga mobeko ya Nzambe epesaka esengo (2)

      • Bato ya sembo bazali lokola nzete oyo ebotaka malamu (3)

      • Bato mabe bazali lokola mposo ya blé oyo ememami na mopɛpɛ (4)

  • 2

    • Yehova mpe moto na ye oyo atyami mafuta

      • Yehova asɛki bikólo (4)

      • Yehova atye mokonzi (6)

      • Kokumisa mwana (12)

  • 3

    • Kotyela Yehova motema atako likama

      • ‘Mpo na nini banguna ebele boye?’ (1)

      • “Lobiko ezali ya Yehova” (8)

  • 4

    • Libondeli ya kotyela Nzambe motema

      • “Bósilika, kasi bósala lisumu te” (4)

      • “Nakolala mpɔngi na kimya” (8)

  • 5

    • Yehova azali esika ya kokima ya bato ya sembo

      • Nzambe ayinaka mabe (4, 5)

      • “Kambá ngai na kati ya bosembo na yo” (8)

  • 6

    • Kosɛnga mpo na kondimama

      • Bakufi basanzolaka Nzambe te (5)

      • Nzambe ayokaka libondeli ya kosɛnga mpo na kondimama (9)

  • 7

    • Yehova azali Mosambisi ya sembo

      • “Sambisá ngai, Ee Yehova” (8)

  • 8

    • Nkembo ya Nzambe mpe lokumu ya moto

      • “Nkombo na yo ezali monene!” (1, 9)

      • “Moto, mowei mpamba azali nani?” (4)

      • ‘Moto alatisami motole ya lokumu’ (5)

  • 9

    • Kosakola misala ya kokamwa ya Nzambe

      • Yehova azali esika makasi ya kobombana (9)

      • Koyeba nkombo ya Nzambe elakisi kotyela ye motema (10)

  • 10

    • Yehova azali mosungi ya moto oyo azangi libateli

      • Na lolendo nyonso moto mabe alobi: “Nzambe azali te” (4)

      • Moto oyo azangi libateli atalelaka Yehova (14)

      • “Yehova azali Mokonzi libela na libela” (16)

  • 11

    • Kokima epai ya Yehova

      • “Yehova azali na kati ya tempelo na ye mosantu” (4)

      • Nzambe ayinaka moto nyonso oyo alingaka mobulu (5)

  • 12

    • Yehova atɛlɛmi mpo na kosala likambo

      • Maloba ya Nzambe ezali pɛto (6)

  • 13

    • Nazali na mposa makasi ete Yehova abikisa ngai

      • “Ee Yehova, tii ntango nini?” (1, 2)

      • Yehova apesaka mbano monene mpenza (6)

  • 14

    • Ndenge zoba azalaka

      • “Yehova azali te” (1)

      • “Moto moko te azali kosala malamu” (3)

  • 15

    • Nani akoki kobengisama na hema ya Yehova?

      • Moto oyo alobaka solo na motema na ye (2)

      • Akoselaka bato makambo te (3)

      • Akokisaka elaka na ye ata soki ekosala ye mpasi (4)

  • 16

    • Yehova azali liziba ya bolamu

      • “Yehova azali eteni na ngai” (5)

      • ‘Makanisi na ngai esembolaka ngai na butu’ (7)

      • ‘Yehova azali na lobɔkɔ na ngai ya mobali’ (8)

      • “Okotika ngai na kati ya Nkunda te” (10)

  • 17

    • Libondeli mpo na kosɛnga libateli

      • “Omeki motema na ngai” (3)

      • “Na elili ya mapapu na yo” (8)

  • 18

    • Kosanzola Nzambe mpo na misala na ye ya kobikisa

      • “Yehova azali libanga na ngai” (2)

      • Yehova azali sembo epai ya bato ya sembo (25)

      • Nzela ya Nzambe ezali ya kokoka (30)

      • “Komikitisa na yo ekómisi ngai moto monene” (35)

  • 19

    • Bozalisi mpe mobeko ya Nzambe ezali kotatola

      • ‘Likoló esakolaka nkembo ya Nzambe’ (1)

      • Mobeko ya Nzambe ezali ya kokoka mpe epesaka makasi (7)

      • “Masumu oyo nasali kozanga koyeba” (12)

  • 20

    • Nzambe abikisi mokonzi oyo atye mafuta

      • Basusu batyaka motema na makalo mpe bampunda, ‘kasi tobelelaka nkombo ya Yehova’ (7)

  • 21

    • Mokonzi oyo atyeli Yehova motema apambolami

      • Bapesi mokonzi bomoi molai (4)

      • Banguna ya Nzambe bakolonga te (8-12)

  • 22

    • Kolɛmba nzoto ebongwani lisanzoli

      • “Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai?” (1)

      • “Babwaki mbɛsɛ mpo na bilamba na ngai” (18)

      • Kosanzola Nzambe na kati ya lisangá (22, 25)

      • Mabele mobimba ekosambela Nzambe (27)

  • 23

    • “Yehova azali Mobateli na ngai”

      • “Nakozanga eloko te” (1)

      • “Apesaka ngai makasi” (3)

      • “Kɔpɔ na ngai etondi malamu” (5)

  • 24

    • Mokonzi ya nkembo akɔti na baporte

      • ‘Mabele ezali ya Yehova’ (1)

  • 25

    • Libondeli mpo na kosɛnga litambwisi mpe bolimbisi

      • “Teyá ngai banzela na yo” (4)

      • “Yehova azali moninga ya motema” (14)

      • “Limbisá masumu na ngai nyonso” (18)

  • 26

    • Kotambola na kozanga mbeba

      • “Ee Yehova, talá ngai malamumalamu” (2)

      • Koboya baninga mabe (4, 5)

      • ‘Nakotambola zingazinga ya etumbelo ya Nzambe’ (6)

  • 27

    • Yehova azali esika makasi ya bomoi na ngai

      • Botɔndi mpo na tempelo ya Nzambe (4)

      • Yehova ayambaka moto oyo baboti basundoli (10)

      • “Tyelá Yehova elikya” (14)

  • 28

    • Nzambe ayoki libondeli ya mokomi ya nzembo

      • “Yehova azali makasi na ngai mpe nguba na ngai” (7)

  • 29

    • Mongongo ya Yehova ezali na nguya

      • Kosambela na bilamba ya monzɛlɛ ya bosantu (2)

      • “Nzambe ya nkembo angulumi lokola nkake” (3)

      • Yehova apesaka bato na ye makasi (11)

  • 30

    • Mawa ebongwani esengo

      • Boboto ya Nzambe ezali mpo na bomoi mobimba (5)

  • 31

    • Kokima epai ya Yehova

      • “Natiki elimo na ngai na mabɔkɔ na yo” (5)

      • “Yehova, Nzambe oyo alobaka solo” (5)

      • Bolamu ya Nzambe ezali mingi mpenza (19)

  • 32

    • Esengo na baoyo balimbisi bango

      • “Nayambolelaki yo lisumu na ngai” (5)

      • Nzambe apesaka bososoli (8)

  • 33

    • Kosanzola Mozalisi

      • “Bóyembela ye loyembo ya sika” (3)

      • Yehova azalisaki na nzela ya liloba mpe elimo na ye (6)

      • Esengo na ekólo ya Yehova (12)

      • Liso ya Yehova etalatalaka (18)

  • 34

    • Yehova abikisaka basaleli na ye

      • “Tótombola nkombo na ye elongo” (3)

      • Anzelu ya Yehova abatelaka (7)

      • “Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu” (8)

      • ‘Ata mokuwa na ye moko te ebukanaki’ (20)

  • 35

    • Libondeli mpo na kosikolama na mabɔkɔ ya banguna

      • Kobengana banguna (5)

      • Kosanzola Nzambe na kati ya bato ebele (18)

      • Bayini ngai kaka mpamba (19)

  • 36

    • Bolingo ya sembo ya Nzambe ezali kitoko

      • Moto mabe abangaka Nzambe te (1)

      • Nzambe azali liziba ya bomoi (9)

      • “Na pole na yo, tozali komona pole” (9)

  • 37

    • Baoyo batyelaka Yehova motema bakolonga

      • Kosilika te mpo na bato mabe (1)

      • “Sepelá mingi mpenza na Yehova” (4)

      • “Tiká Yehova atambwisa bomoi na yo” (5)

      • “Bato ya komikitisa bakozwa mabele” (11)

      • Bato ya sembo bakozanga limpa te (25)

      • Bato ya sembo bakofanda na mabele mpo na libela (29)

  • 38

    • Libondeli ya moto oyo abongoli motema, kasi azali konyokwama

      • “Natungisami mpe mawa esilisi ngai makasi” (6)

      • Yehova ayokaka baoyo bazelaka ye (15)

      • “Natungisamaki mpo na lisumu na ngai” (18)

  • 39

    • Bomoi ezali mokuse

      • Moto azali kaka mwa mopɛpɛ (5, 11)

      • “Kosala te lokola nde omoni mai ya miso na ngai te” (12)

  • 40

    • Kopesa matɔndi na Nzambe oyo akokani na moto mosusu te

      • Misala ya Nzambe ezali ebele koleka mpo na kolobela yango (5)

      • Bambeka ezali likambo ya libosoliboso te mpo na Nzambe (6)

      • “Nasepeli kosala mokano na yo” (8)

  • 41

    • Libondeli uta na mbeto ya maladi

      • Nzambe asalisaka moto oyo azali kobɛla (3)

      • Moninga na ye atɛki ye (9)

  • 42

    • Kosanzola Nzambe, Mobikisi Monene

      • Nazali na mposa ya Nzambe ndenge bishe ezalaka na mposa makasi ya mai (1, 2)

      • “Mpo na nini nazangi elikya?” (5, 11)

      • “Nakozela Nzambe” (5, 11)

  • 43

    • Nzambe azali Mosambisi oyo abikisaka

      • “Tindá pole na yo mpe solo na yo” (3)

      • “Mpo na nini nazangi elikya?” (5)

      • “Nakozela Nzambe” (5)

  • 44

    • Libondeli ya kosɛnga lisalisi

      • “Yo nde obikisaki biso” (7)

      • “Lokola bampate ya koboma” (22)

      • “Tɛlɛmá! Ozali mosungi na biso!” (26)

  • 45

    • Libala ya mokonzi oyo atyami mafuta

      • Maloba ya elɛngi (2)

      • “Nzambe azali kiti na yo ya bokonzi libela na libela” (6)

      • Mokonzi azali na mposa makasi ya kitoko ya mwasi ya libala (11)

      • Bana batyami bankumu na mabele mobimba (16)

  • 46

    • “Nzambe azali ekimelo na biso”

      • Misala ya kokamwa ya Nzambe (8)

      • Nzambe azali kosukisa bitumba na mabele mobimba (9)

  • 47

    • Nzambe azali Mokonzi ya mabele mobimba

      • ‘Yehova azali nsɔmɔ’ (2)

      • Loyembo mpo na kosanzola Nzambe (6, 7)

  • 48

    • Siona, “engumba ya Mokonzi Monene”

      • Esengo ya mabele mobimba (2)

      • Bótala malamumalamu engumba mpe bandako milai na yango (11-13)

  • 49

    • Kotya motema na bozwi ezali bozoba

      • Moto moko te akoki kosikola moninga na ye (7, 8)

      • Nzambe asikolaka na Nkunda (15)

      • Bozwi ekoki te kobikisa na liwa (16, 17)

  • 50

    • Nzambe asambisaka moto ya sembo ná moto mabe

      • Kondimana elongo na Nzambe na nzela ya mbeka (5)

      • “Nzambe ye moko azali Mosambisi” (6)

      • Banyama nyonso ezali ya Nzambe (10, 11)

      • Nzambe abimisi polele makambo ya bato mabe (16-21)

  • 51

    • Libondeli ya moto oyo abongoli motema

      • Moto ya masumu banda na libumu (5)

      • ‘Pɛtolá ngai na lisumu’ (7)

      • “Pesá ngai motema ya pɛto” (10)

      • Motema oyo etutami esepelisaka Nzambe (17)

  • 52

    • Kotya motema na bolingo ya sembo ya Nzambe

      • Likebisi mpo na baoyo bamikumisaka na mabe (1-5)

      • Bato oyo bamemyaka Nzambe te batyaka motema na bomɛngo na bango (7)

  • 53

    • Ndenge zoba azalaka

      • “Yehova azali te” (1)

      • “Ata moto moko te azali kosala malamu” (3)

  • 54

    • Libondeli mpo na kosɛnga lisalisi liboso ya banguna

      • “Nzambe azali mosungi na ngai” (4)

  • 55

    • Libondeli ya moto oyo moninga atɛki ye

      • Moninga atumoli ye (12-14)

      • “Bwakelá Yehova mokumba na yo ya kilo” (22)

  • 56

    • Libondeli ya moto oyo banyokoli

      • “Natyeli Nzambe motema” (4)

      • “Mai ya miso na ngai na kati ya molangi na yo ya mposo ya nyama” (8)

      • “Moto akoki kosala ngai nini?” (4, 11)

  • 57

    • Kosɛnga mpo na kondimama

      • Nakimi na elili ya mapapu ya Nzambe (1)

      • Banguna bakwei na motambo na bango moko (6)

  • 58

    • Ezali na Nzambe oyo asambisaka mabele

      • Libondeli mpo na kosɛnga ete banguna bázwa etumbu (6-8)

  • 59

    • Nzambe azali nguba mpe esika na ngai ya kokima

      • ‘Baoyo batɛkaka baninga na bango, koyokela bango mawa te’ (5)

      • “Nakoyembela makasi na yo” (16)

  • 60

    • Nzambe atye banguna na nse

      • Lobiko oyo euti na bato ezali mpamba (11)

      • “Tokozwa nguya epai ya Nzambe” (12)

  • 61

    • Nzambe azali ndako molai ya makasi oyo ebatelaka liboso ya banguna

      • “Nakoyambama na hema na yo” (4)

  • 62

    • Lobiko ya solo eutaka epai ya Nzambe

      • “Nazali kozela Nzambe na kimya” (1, 5)

      • ‘Bófungolela Nzambe mitema na bino’ (8)

      • Bato bazali lokola mwa mopɛpɛ (9)

      • Bótya motema te na bomɛngo (10)

  • 63

    • Kozala na mposa makasi ya Nzambe

      • “Bolingo na yo ya sembo ezali malamu koleka bomoi” (3)

      • ‘Natondi na oyo eleki malamu’ (5)

      • Komanyola makambo ya Nzambe na butu (6)

      • ‘Nakangami makasi na Nzambe’ (8)

  • 64

    • Libateli na makaneli ya nsense

      • “Nzambe akobwakela bango likula” (7)

  • 65

    • Nzambe abatelaka mabele

      • “Moyoki ya libondeli” (2)

      • “Esengo na moto oyo oponi” (4)

      • Ebele ya mapamboli ya Nzambe (11)

  • 66

    • Misala ya nsɔmɔ ya Nzambe

      • “Bóya komona misala ya Nzambe” (5)

      • “Nakokokisa bilako na ngai epai na yo” (13)

      • Nzambe ayokaka libondeli (18-20)

  • 67

    • Nsuka nyonso ya mabele ekobanga Nzambe

      • Nzela ya Nzambe esengeli koyebana (2)

      • ‘Bato nyonso ya bikólo básanzola Nzambe’ (3, 5)

      • “Nzambe akopambola biso” (6, 7)

  • 68

    • ‘Banguna ya Nzambe bápalangana’

      • “Tata ya bana oyo batata bakufá” (5)

      • Nzambe apesaka bato oyo bazali kaka bango moko ndako (6)

      • Basi bazali kosakola nsango malamu (11)

      • Makabo oyo ezali bato (18)

      • ‘Yehova amemaka mokumba na biso mokolo na mokolo’ (19)

  • 69

    • Libondeli mpo na kosɛnga lobiko

      • “Molende mpo na ndako na yo elei ngai” (9)

      • “Yanolá ngai nokinoki” (17)

      • “Bapesaki ngai vinɛgrɛ namɛla” (21)

  • 70

    • Kosɛnga lisalisi ya nokinoki

      • “Salá noki okɔta likambo na ngai” (5)

  • 71

    • Elikya ya mibange

      • Kotyela Nzambe motema banda bolenge (5)

      • “Ntango makasi na ngai ezali kosila” (9)

      • ‘Nzambe ateyi ngai banda bolenge na ngai’ (17)

  • 72

    • Boyangeli ya kimya ya mokonzi oyo Nzambe atyá

      • “Bato ya sembo bakokola lokola matiti” (7)

      • Bato oyo akokamba bakozala banda na mbu moko tii na mbu mosusu (8)

      • Akobikisa bango na mobulu (14)

      • Ebele ya bilei na mabele (16)

      • Nkombo ya Nzambe esanzolama mpo na libela (19)

  • 73

    • Moto oyo abangaka Nzambe azongeli kotalela makambo na miso ya elimo

      • “Etikalaki moke makolo na ngai elongwa na nzela” (2)

      • “Natungisamaki mokolo mobimba” (14)

      • ‘Tii ntango nakɔtaki na esika mosantu ya Nzambe’ (17)

      • Bato mabe bazali na mabele ya mosɛlu (18)

      • Kopusana epai ya Nzambe ezali malamu (28)

  • 74

    • Libondeli mpo na kosɛnga Nzambe akanisa bato na ye

      • Kokanisa misala ya kobikisa ya Nzambe (12-17)

      • “Kanisá matumoli ya monguna” (18)

  • 75

    • Nzambe asambisaka na bosembo

      • Bato mabe bakomɛla kɔpɔ ya Yehova (8)

  • 76

    • Nzambe alongi banguna ya Siona

      • Nzambe abikisaka bato ya komikitisa (9)

      • Akokitisa lolendo ya banguna (12)

  • 77

    • Libondeli na ntango ya mpasi

      • Komanyola na misala ya Nzambe (11, 12)

      • ‘Nani azali monene lokola yo, Ee Nzambe?’ (13)

  • 78

    • Misala ya boboto ya Nzambe mpe kozanga kondima ya Yisraele

      • Koyebisa na libota oyo ekoya (2-8)

      • “Bandimelaki Nzambe te” (22)

      • “Bilei ya likoló” (24)

      • “Bayokisaki Mosantu ya Yisraele mawa” (41)

      • Longwa na Ezipito tii na Mokili ya elaka (43-55)

      • “Bakobaki komeka Nzambe” (56)

  • 79

    • Libondeli ntango bikólo ezingi bato ya Nzambe

      • ‘Tozali eloko ya nsɔni’ (4)

      • ‘Salisá biso mpo na nkombo na yo’ (9)

      • “Pesá bato oyo bafandi penepene na biso etumbu mbala nsambo” (12)

  • 80

    • Basɛngi Mobateli ya Yisraele azongisa bango

      • “Ee Nzambe, zongisá biso” (3)

      • Yisraele ezali lokola nzete ya vinyo ya Nzambe (8-15)

  • 81

    • Elendiseli mpo na kotosa

      • Kosambela banzambe bapaya te (9)

      • ‘Soki báyokelaka ata ngai’ (13)

  • 82

    • Likebisi mpo na kosambisa na bosembo

      • Nzambe azali kosambisa na katikati ya “banzambe” (1)

      • “Bósamba likambo ya moto mpamba” (3)

      • “Bozali banzambe” (6)

  • 83

    • Libondeli ya kosɛnga lisalisi liboso ya banguna

      • “Ee Nzambe, kofanda nyɛɛ te” (1)

      • Banguna bazali lokola matiti ya nsende oyo mopɛpɛ ezali kobalusabalusa (13)

      • Nkombo ya Nzambe ezali Yehova (18)

  • 84

    • Mposa makasi ya tabernakle monene ya Nzambe

      • Molevi moko azali na mposa makasi azala lokola ndɛkɛ (3)

      • “Mokolo moko na ndako na yo” (10)

      • “Nzambe azali moi mpe nguba” (11)

  • 85

    • Libondeli mpo na kosɛnga kozongisama

      • Nzambe akolobela kimya epai ya bato ya sembo (8)

      • Motema boboto mpe bosembo ekutani (10)

  • 86

    • Nzambe moko te azali lokola Yehova

      • Yehova azali pene ya kolimbisa (5)

      • Bikólo nyonso esengeli kosambela Yehova (9)

      • “Teyá ngai nzela na yo” (11)

      • Pesá ngai motema oyo ekabwani te (11)

  • 87

    • Siona, engumba ya Nzambe ya solo

      • Baoyo babotamá na Siona (4-6)

  • 88

    • Libondeli mpo na kokufa te

      • “Bomoi na ngai ekómi pene na Nkunda” (3)

      • ‘Ntɔngɔ nyonso, nabondelaka yo’ (13)

  • 89

    • Loyembo mpo na bolingo ya sembo ya Yehova

      • Kondimana elongo na Davidi (3)

      • Libota ya Davidi ekoumela mpo na libela (4)

      • Moto oyo Nzambe atye mafuta abengi Ye “Tata” (26)

      • Kondimana ya Davidi ekozanga te kokokisama (34-37)

      • Moto akoki te kokima Nkunda (48)

  • 90

    • Nzambe azali seko mpe moto azali na bomoi mokuse

      • Mbula nkóto ezali lokola mokolo ya lobi oyo eleki (4)

      • Bomoi ya moto ezali mbula 70-80 (10)

      • “Teyá biso ndenge ya kotánga mikolo na biso” (12)

  • 91

    • Libateli na esika ya kobombama ya Nzambe

      • Abikisami na motambo ya mokangi-ndɛkɛ (3)

      • Kimá na nse ya mapapu ya Nzambe (4)

      • Abiki atako bankóto bakwei (7)

      • Baanzelu bakozwa etinda ya kobatela (11)

  • 92

    • Yehova atombwami mpo na libela

      • Misala na ye ezali minene mpe makanisi na ye ezali mozindo (5)

      • “Moto ya sembo akokola lokola nzete” (12)

      • Mibange bakokoba kokola (14)

  • 93

    • Lokumu ya boyangeli ya Yehova

      • “Yehova akómi Mokonzi!” (1)

      • ‘Makundoli na yo ebongi kotyelama motema’ (5)

  • 94

    • Libondeli mpo na kosɛnga Nzambe azongisa mabe

      • “Tii ntango nini bato mabe bakokoba?” (3)

      • Kosembola ya Yehova epesaka esengo (12)

      • Nzambe akosundola bato na ye te (14)

      • “Bazali na mokano ya kobimisa mikakatano na nzela ya mobeko” (20)

  • 95

    • Losambo ya solo etambolaka nzela moko na botosi

      • “Lelo oyo, soki boyoki mongongo na ye” (7)

      • “Bókómisa motema na bino makasi te” (8)

      • “Bakokɔta te na kopema na ngai” (11)

  • 96

    • “Bóyembela Yehova loyembo ya sika”

      • Yehova abongi kosanzolama mingi mpenza (4)

      • Banzambe ya bato ya bikólo bazali mpamba (5)

      • Bósambela na bilamba ya monzɛlɛ ya bosantu (9)

  • 97

    • Yehova atombwami likoló koleka banzambe mosusu

      • “Yehova akómi Mokonzi!” (1)

      • Bólinga Yehova, bóyina oyo ezali mabe (10)

      • Pole mpo na bato ya sembo (11)

  • 98

    • Yehova azali Mobikisi mpe Mosambisi ya sembo

      • Lobiko ya Yehova eyebani (2, 3)

  • 99

    • Yehova azali Mokonzi mosantu

      • Afandi na kiti ya bokonzi likoló ya bakeruba (1)

      • Nzambe alimbisaka mpe apesaka etumbu (8)

  • 100

    • Kopesa Mozalisi matɔndi

      • “Bósalela Yehova na esengo” (2)

      • ‘Nzambe nde moto asalaki biso’ (3)

  • 101

    • Moyangeli oyo azali na mbeba te

      • ‘Nakotikela lolendo nzela te’ (5)

      • “Nakotala epai ya bato ya sembo” (6)

  • 102

    • Libondeli ya moto oyo anyokwami ntango azangi elikya

      • “Nazali lokola ndɛkɛ oyo ezali yango moko” (7)

      • ‘Mikolo na ngai ezali elili oyo ezali kolimwa’ (11)

      • “Yehova akotonga lisusu Siona” (16)

      • Yehova azali mpo na libela (26, 27)

  • 103

    • “Tiká nasanzola Yehova”

      • Nzambe atye mosika masumu na biso (12)

      • Nzambe, Tata ya motema mawa (13)

      • Nzambe abosani te ete tozali putulu (14)

      • Kiti ya bokonzi ya Yehova mpe boyangeli na ye (19)

      • Baanzelu bakokisaka liloba ya Nzambe (20)

  • 104

    • Kosanzola Nzambe mpo na biloko ya kokamwa oyo asalá

      • Mabele ekoumela mpo na libela (5)

      • Vinyo mpe limpa mpo na moto, mowei mpamba (15)

      • “Misala na yo ezali mpenza ebele!” (24)

      • ‘Ntango elimo elongwe, bakufi’ (29)

  • 105

    • Misala ya sembo ya Yehova epai ya basaleli na ye

      • Nzambe akanisi lisusu kondimana na ye (8-10)

      • “Bósimba te bato na ngai oyo batyami mafuta” (15)

      • Nzambe asaleli Yozefe oyo akómaki moombo (17-22)

      • Makamwisi ya Nzambe na Ezipito (23-36)

      • Yisraele ebimi na Ezipito (37-39)

      • Nzambe akanisi elaka oyo apesaki Abrahama (42)

  • 106

    • Yisraele ezangi botɔndi

      • Babosanaki nokinoki misala ya Nzambe (13)

      • Bapesi ekeko ya elilingi ya ngɔmbɛ nkembo, na esika ya kopesa Nzambe (19, 20)

      • Bazalaki na kondima te na elaka ya Nzambe (24)

      • Babandaki kosambela Baala (28)

      • Bapesi bana mbeka epai ya bademo (37)

  • 107

    • Bópesa Nzambe matɔndi mpo na misala na ye ya kokamwa

      • “Atambwisaki bango na nzela ya malamu” (7)

      • Asilisaki mposa na bango ya mai mpe aleisaki baoyo bazalaki na nzala (9)

      • Abimisaki bango na molili (14)

      • Atindaki liloba na ye mpo ebikisa bango (20)

      • Abatelaka mobola na ntango ya mpasi (41)

  • 108

    • Libondeli mpo na kosɛnga kolonga banguna

      • Lobiko oyo euti na bato ezali mpamba (12)

      • “Tokozwa nguya epai ya Nzambe” (13)

  • 109

    • Libondeli ya moto oyo atungisami

      • ‘Moto mosusu azwa esika na ye’ (8)

      • Nzambe atɛlɛmaka na ngámbo ya mobola (31)

  • 110

    • Mokonzi mpe nganga-nzambe lokola Melekisedeke

      • ‘Yangelá na katikati ya banguna na yo’ (2)

      • Bilenge bamipesaka na bolingo na bango moko lokola matangá ya mamwɛ (3)

  • 111

    • Bósanzola Yehova mpo na misala na ye ya minene

      • Nkombo ya Nzambe ezali mosantu mpe nsɔmɔ (9)

      • Kobanga Yehova ezali bwanya (10)

  • 112

    • Moto ya sembo abangaka Yehova

      • Moto oyo adefisaka na motema mobimba akokóma na bozwi (5)

      • “Bakokanisa moto ya sembo mpo na libela” (6)

      • Moto ya lobɔkɔ pɛtɛɛ akabelaka babola (9)

  • 113

    • Nzambe oyo azali likoló atombolaka moto mpamba

      • Nkombo ya Yehova esanzolama mpo na libela (2)

      • Nzambe akitaka na nse (6)

  • 114

    • Kobima ya Yisraele na Ezipito

      • Mbu ekimi (5)

      • Bangomba epumbwe lokola bampate-mibali (6)

      • Libanga ya silekise ebongwani liziba ya mai (8)

  • 115

    • Nkembo esengeli kopesama kaka epai ya Nzambe

      • Bikeko ezangá bomoi (4-8)

      • Mabele epesamá epai ya bato (16)

      • “Bakufi basanzolaka Yah te” (17)

  • 116

    • Loyembo ya botɔndi

      • “Nakofuta Yehova eloko nini?” (12)

      • “Nakozwa kɔpɔ ya lobiko” (13)

      • Nakokokisa bilako na ngai epai ya Yehova (14, 18)

      • Liwa ya bato ya sembo ezali na motuya mingi (15)

  • 117

    • Libyangi na bikólo nyonso mpo na kosanzola Yehova

      • Bolingo ya sembo ya Yehova ezali monene (2)

  • 118

    • Kopesa matɔndi mpo na bolongi ya Yehova

      • ‘Nabelelaki Yah mpe ayanolaki ngai’ (5)

      • “Yehova azali pene na ngai” (6, 7)

      • Libanga oyo babwakaki ekómi libanga monene ya litumu ya ndako (22)

      • ‘Moto oyo azali koya na nkombo ya Yehova’ (26)

  • 119

    • Botɔndi mpo na liloba ya Nzambe oyo ezali na motuya

      • ‘Ndenge nini elenge akoki kopɛtola nzela na ye?’ (9)

      • “Nalingaka makundoli na yo mingi” (24)

      • “Liloba na yo nde elikya” (74, 81, 114)

      • “Nalingaka mobeko na yo mingi mpenza!” (97)

      • “Nakómi na mayele ya kososola mingi koleka bateyi na ngai nyonso” (99)

      • “Liloba na yo ezali mwinda na lokolo na ngai” (105)

      • “Liloba na yo mobimba ezali solo” (160)

      • Kimya mpo na baoyo balingaka mobeko ya Nzambe (165)

  • 120

    • Mopaya oyo azali na mposa makasi ya kimya

      • ‘Bikisá ngai na lolemo ya bokosi’ (2)

      • “Nalingi kimya” (7)

  • 121

    • Yehova abatelaka bato na ye

      • “Lisalisi na ngai eutaka epai ya Yehova” (2)

      • Yehova alalaka ata moke te (3, 4)

  • 122

    • Libondeli mpo na kimya ya Yerusaleme

      • Esengo ya kokende na ndako ya Yehova (1)

      • Engumba oyo ekangisami esika moko (3)

  • 123

    • Miso etalaka Yehova mpo amonisela biso motema boboto

      • ‘Lokola basali, totalaka epai ya Yehova’ (2)

      • “Bato batyoli biso mingi”’ (3)

  • 124

    • “Soki Yehova azalaki na ngámbo na biso te”

      • Kobika na motambo oyo ebukani (7)

      • ‘Nkombo ya Yehova ezali lisalisi na biso’ (8)

  • 125

    • Yehova abatelaka bato na ye

      • “Kaka ndenge bangomba ezingi Yerusaleme” (2)

      • “Kimya ezala na Yisraele” (5)

  • 126

    • Esengo ya komona ndenge Siona ezongisami

      • “Yehova asali makambo ya minene” (3)

      • Kolela ebongwani esengo (5, 6)

  • 127

    • Soki Nzambe te, eloko nyonso ezali mpamba

      • “Soki Yehova atongi ndako te” (1)

      • Bana bazali mbano oyo euti epai ya Nzambe (3)

  • 128

    • Kobanga Yehova epesaka esengo

      • Mwasi oyo azali lokola nzete ya vinyo oyo ebotaka mingi (3)

      • Moná bolamu ya Yerusaleme” (5)

  • 129

    • Babundisaka ngai, kasi balongá ngai te

      • Baoyo nyonso bayinaka Siona bayokisami nsɔni (5)

  • 130

    • “Nabeleli yo uta na bisika ya mozindo”

      • “Soki otalaka kaka mabunga” (3)

      • Kolimbisa ya solo ezalaka epai ya Yehova (4)

      • “Nazeli Yehova na mposa makasi” (6)

  • 131

    • Kozanga eloko ya kosala lokola mwana oyo batiki komɛlisa mabɛlɛ

      • Nazali koluka makambo mineneminene te (1)

  • 132

    • Baponi Davidi ná Siona

      • “Koboya te moto na yo oyo atyami mafuta” (10)

      • Banganga-nzambe ya Siona balati lobiko (16)

  • 133

    • Kofanda na bomoko

      • Lokola mafuta na motó ya Arona (2)

      • Lokola mamwɛ ya Heremone (3)

  • 134

    • Kosanzola Nzambe na butu

      • “Bózala basantu ntango bozali kotombola mabɔkɔ na bino” (2)

  • 135

    • Bósanzola Yah mpo na bonene na ye

      • Bilembo mpe makamwisi ekweli Ezipito (8, 9)

      • “Nkombo na yo eumelaka mpo na libela” (13)

      • Bikeko ezangá bomoi (15-18)

  • 136

    • Bolingo ya sembo ya Yehova ezali seko na seko

      • Likoló mpe mabele esalemaki na mayele mpenza (5, 6)

      • Farao akufaki na Mbu Motane (15)

      • Nzambe akanisaka baoyo banyokwami na makanisi (23)

      • Bilei mpo na ekelamu nyonso ya bomoi (25)

  • 137

    • Pene ya bibale ya Babilone

  • 138

    • Atako atombwami, Nzambe atyaka likebi

      • ‘Oyanolaki libondeli na ngai’ (3)

      • ‘Ata na kati ya likama, okobikisa ngai’ (7)

  • 139

    • Nzambe ayebaka basaleli na ye malamu

      • Esika ya kokima elimo ya Nzambe ezali te (7)

      • “Nasalemi na ndenge moko ya kokamwa” (14)

      • ‘Omonaki ngai ntango nazalaki liki’ (16)

      • “Tambwisá ngai na nzela ya seko” (24)

  • 140

    • Yehova azali Mobikisi ya makasi

      • Bato mabe bazali lokola banyoka (3)

      • Bato ya mobulu bakokwea (11)

  • 141

    • Libondeli mpo na kosɛnga libateli

      • ‘Libondeli na ngai ezala lokola mpaka ya malasi’ (2)

      • Mpamela ya moto ya sembo ezali lokola mafuta (5)

      • Bato mabe bakwei na minyama na bango moko (10)

  • 142

    • Libondeli mpo na kosɛnga kobikisama na mabɔkɔ ya banyokoli

      • “Nazali na esika ya kokima te” (4)

      • ‘Ozali nyonso oyo nazali na yango’ (5)

  • 143

    • Kozala na mposa makasi ya Nzambe lokola mokili oyo ekauká

      • ‘Nakanisi na mozindo mpenza misala na yo’ (5)

      • “Teyá ngai ndenge ya kosala mokano na yo” (10)

      • ‘Elimo na yo ya malamu ekamba ngai’ (10)

  • 144

    • Libondeli mpo na kosɛnga bolongi

      • ‘Moto, mowei mpamba azali nani?’ (3)

      • ‘Banguna bápalangana’ (6)

      • Esengo na bato ya Yehova (15)

  • 145

    • Kosanzola Nzambe, Mokonzi monene

      • “Nakosakola bonene na yo” (6)

      • “Yehova azali malamu epai ya bikelamu na ye nyonso” (9)

      • “Bato na yo ya sembo bakosanzola yo” (10)

      • Bokonzi ya Nzambe ezali seko (13)

      • Lobɔkɔ ya Nzambe ekokisaka mposa ya ekelamu nyonso (16)

  • 146

    • Bótyela Nzambe motema, kasi bato te

      • Soki moto akufi, akanisaka lisusu te (4)

      • Yehova atombolaka baoyo bagumbami (8)

  • 147

    • Kosanzola bolingo mpe misala ya nguya ya Nzambe

      • Abikisaka baoyo bazoki na motema (3)

      • Abengaka minzoto nyonso na nkombo na yango (4)

      • Atindaka nɛjɛ lokola lɛnɛ (16)

  • 148

    • Bozalisi nyonso esanzola Yehova

      • “Bósanzola ye, baanzelu na ye nyonso” (2)

      • ‘Bósanzola ye, moi, sanza mpe minzoto’ (3)

      • Mibange mpe bilenge básanzola Nzambe (12, 13)

  • 149

    • Loyembo mpo na kosanzola bolongi ya Nzambe

      • Nzambe azali kosepela na bato na ye (4)

      • Lokumu oyo ezali mpo na baoyo bazali sembo epai ya Nzambe (9)

  • 150

    • Eloko nyonso oyo ezali na mpema esanzola Yah

      • Aleluya! (1, 6)