Nzembo 108:1-13
Loyembo. Mondule ya Davidi.
108 Ee Nzambe, motema na ngai ezali kotengatenga te.
Nakoyemba mpe nakobɛta miziki na motema na ngai mobimba.*+
2 Ee ebɛtɛlo ya nsinga, lamuká; yo mpe, Ee nzɛnzɛ.+
Nakolamwisa kotana ya ntɔngɔ.
3 Ee Yehova, nakosanzola yo na kati ya bato ya bikólo,Mpe nakoyemba mpo na kosanzola* yo na kati ya bikólo.
4 Mpo bolingo na yo ya sembo ezali monene, ekei tii na likoló,+Mpe bosembo na yo ekei tii na mapata.
5 Ee Nzambe, okumisama kuna na likoló;Nkembo na yo ezala likoló ya mabele mobimba.+
6 Mpo bato oyo olingaka bábikisama,Bikisá biso na lobɔkɔ na yo ya mobali mpe yanolá ngai.+
7 Nzambe alobi na kati ya bosantu na ye ete:*
“Nakosepela makasi, nakopesa Shekeme+ ezala libula,Mpe nakomeka bonene ya Lobwaku* ya Sukote.+
8 Gileade+ ezali ya ngai, Manase mpe ezali ya ngai,Mpe Efraime ezali ekɔti mpo na motó* na ngai;+Yuda ezali lingenda na ngai ya komanda.+
9 Moabe ezali saani monene na ngai ya kosukola.+
Nakobwakela Edome sandale na ngai.+
Nakoganga ete nalongi Filistia.”+
10 Nani akomema ngai na engumba oyo ebatelami makasi?
Nani akokamba ngai tii na Edome?+
11 Ee Nzambe, ezali yo te nde moto obwaki biso?Nzambe na biso, ozali kokende lisusu te elongo na mampinga na biso?+
12 Salisá biso na mpasi na biso,+Mpo lobiko oyo euti na bato ezali mpamba.+
13 Tokozwa nguya epai ya Nzambe,+Mpe akonyata banguna na biso.+

