Nzembo 105:1-45

  • Misala ya sembo ya Yehova epai ya basaleli na ye

    • Nzambe akanisi lisusu kondimana na ye (8-10)

    • “Bósimba te bato na ngai oyo batyami mafuta” (15)

    • Nzambe asaleli Yozefe oyo akómaki moombo (17-22)

    • Makamwisi ya Nzambe na Ezipito (23-36)

    • Yisraele ebimi na Ezipito (37-39)

    • Nzambe akanisi elaka oyo apesaki Abrahama (42)

105  Bópesa Yehova matɔndi,+ bóbelela nkombo na ye,Bóyebisa bato ya bikólo misala na ye!+  2  Bóyembela ye, bóyemba mpo na kosanzola ye,*Bókanisa na mozindo* misala na ye nyonso ya kokamwa.+  3  Bómikumisa mpo na nkombo na ye mosantu.+ Mitema ya baoyo bazali koluka Yehova esepela.+  4  Bóluka Yehova+ mpe makasi na ye. Bóluka elongi* na ye ntango nyonso.  5  Bókanisa lisusu misala ya kokamwa oyo asalá,Makamwisi na ye mpe bikateli ya lisambisi oyo alobá,+  6  Bino libota* ya Abrahama mosaleli na ye,+Bino bana ya Yakobo, baoyo ye aponá.+  7  Ye azali Yehova Nzambe na biso.+ Bikateli na ye ya lisambisi etali mabele mobimba.+  8  Akanisi lisusu kondimana na ye mpo na libela,+Elaka oyo apesaki,* mpo na mabota nkóto,+  9  Kondimana oyo asalaki na Abrahama,+Mpe ndai oyo alapaki epai ya Yisaka,+ 10  Oyo atyaki mpo ezala mobeko mpo na Yakobo,Mpe ezala kondimana oyo ekoumela libela mpo na Yisraele, 11  Ntango alobaki: “Nakopesa yo mokili ya Kanana+Mpo ezala libula oyo bapesi yo.”+ 12  Yango ezalaki ntango bazalaki kaka bato moke,+Ɛɛ, bato moke mpenza, mpe bazalaki bapaya na mokili yango.+ 13  Bazalaki kotambolatambola longwa na ekólo oyo tii na ekólo mosusu,Longwa na bokonzi oyo tii na bato ya ekólo mosusu.+ 14  Apesaki moto moko te nzela anyokola bango,+Kutu apamelaki bakonzi mpo na bango,+ 15  Alobaki: “Bósimba te bato na ngai oyo batyami mafuta,Mpe bósala basakoli na ngai eloko moko te ya mabe.”+ 16  Abengaki nzala ekɔta na mokili yango;+Apimelaki bango limpa.* 17  Atindaki moto moko liboso na bangoYozefe, oyo atɛkamaki moombo.+ 18  Bakangaki makolo na ye* na bikangeli,+Bakɔtisaki nkingo na ye na bibende;* 19  Tii ntango liloba ya Nzambe ekokisamaki,+Liloba ya Yehova epɛtolaki ye. 20  Mokonzi apesaki mitindo bábimisa ye,+Moyangeli ya bato ya bikólo atikaki ye akende. 21  Atyaki ye nkolo ya bato ya ndako na ye,Mpe moyangeli ya biloko na ye nyonso,+ 22  Mpo na kozala na bokonzi likoló ya* bankumu na ye ndenge alingiMpe mpo ateya mikóló na ye bwanya.+ 23  Bongo Yisraele ayaki na Ezipito,+Mpe Yakobo afandaki mopaya na mokili ya Kame. 24  Nzambe asalaki ete bato na ye bábota mingi;+Akómisaki bango makasi koleka banguna na bango,+ 25  Baoyo atikaki motema na bango ebongwana mpo báyina bato na ye,Mpo básalela basaleli na ye likita ya mayele mabe.+ 26  Atindaki Moize mosaleli na ye,+Mpe Arona,+ moto oyo aponaki. 27  Balakisaki bango bilembo na ye,Makamwisi na ye na mokili ya Kame.+ 28  Atindaki molili mpe mokili ekómaki molili;+Baboyaki* te kotosa maloba na ye. 29  Akómisaki mai na bango makila,Mpe abomaki mbisi na bango.+ 30  Mokili na bango etondaki na magorodo,*+Ata na bashambrɛ ya bakonzi. 31  Apesaki mitindo mapokopoko* etondanela bangoMpe ngungi na bateritware na bango nyonso.+ 32  Akómisaki mbula na bango mbula ya mabanga,Mpe atindaki mokalikali* na mokili na bango.+ 33  Abebisaki banzete na bango ya vinyo mpe banzete na bango ya figiMpe abukaki banzete ya teritware na bango. 34  Alobaki ete mabanki etondanela bango,Mabanki ya mike oyo ekokaki kotángama te.+ 35  Elyaki milona nyonso na mokili yango,Mpe elyaki biloko oyo mabele na bango ebimisaki. 36  Bongo abomaki mwana nyonso ya liboso na mokili na bango,+Ebandeli ya nguya na bango ya kobota. 37  Abimisaki bato na ye mpe babimaki na palata ná wolo;+Mpe moto moko te na kati ya mabota na ye abɛtaki libaku. 38  Ezipito esepelaki ntango balongwaki,Mpo nsɔmɔ ya Yisraele* ekwelaki bango.+ 39  Atindaki lipata mpo na kobatela bango+ Mpe mɔtɔ mpo epesaka pole na butu.+ 40  Basɛngaki, mpe atindelaki bango bandɛkɛ na nkombo kayɛ;+Akobaki kotondisa bango na limpa oyo eutaki na likoló.+ 41  Afungolaki libanga, mpe mai etíyolaki;+Yango etíyolaki na mokili ekauká lokola ebale.+ 42  Mpo akanisaki elaka na ye mosantu oyo apesaki Abrahama mosaleli na ye.+ 43  Bongo abimisaki bato na ye.Bazalaki na nsai mpenza,+ bato oyo ye aponá bagangaki na esengo. 44  Apesaki bango mikili ya bikólo;+Bazwaki mbuma ya mosala makasi oyo bato mosusu basalaki,+ 45  Mpo bábatela malako na ye+Mpe bátosa mibeko na ye. Bósanzola Yah!*

Maloba na nse

To mbala mosusu, “Bólobela.”
To, “bóbɛta miziki mpo na ye.”
To, “kozala; kondimama.”
Lil., “momboto.”
Lil., “Liloba oyo apesaki mitindo.”
Lil., “Abukaki lingenda nyonso ya limpa.” Mbala mosusu ezali mangenda oyo bazalaki kosalela mpo na kokɔtisa mampa oyo ezalaki lokola lopɛtɛ mpo na kobomba yango.
Lil., “Bamonisaki makolo na ye mpasi.”
To, “Molimo na ye ekɔtaki na ebende.”
Lil., “Mpo akanga.”
Mbala mosusu, “bazali kolobela Moize ná Arona.”
To, “mbemba.”
To, “mafokofoko.” Lolenge moko ya nzinzi oyo eswaka makasi.
To, “mɔtɔ oyo ezali kopela.”
Lil., “na bango.”
To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.