Nzembo 103:1-22

  • “Tiká nasanzola Yehova”

    • Nzambe atye mosika masumu na biso (12)

    • Nzambe, Tata ya motema mawa (13)

    • Nzambe abosani te ete tozali putulu (14)

    • Kiti ya bokonzi ya Yehova mpe boyangeli na ye (19)

    • Baanzelu bakokisaka liloba ya Nzambe (20)

Ya Davidi. 103  Tiká nasanzola* Yehova,Nyonso oyo ezali kati na ngai esanzola nkombo na ye mosantu.  2  Tiká nasanzola Yehova;Nabosana ata moke te misala na ye nyonso,+  3  Alimbisi mabunga na yo nyonso+Mpe asilisi maladi na yo nyonso;+  4  Asikoli bomoi na yo na libulu*+Mpe alatisi yo motole ya bolingo ya sembo mpe ya motema mawa na ye.+  5  Atondisi bomoi na yo mobimba na makambo ya malamu,+Mpo bolenge na yo ekóma lisusu ya sika lokola oyo ya mpongo.+  6  Yehova asalaka makambo na boyengebene+ mpe na bosemboMpo na baoyo nyonso banyokwami.+  7  Ayebisaki Moize banzela na ye,+Mpe misala na ye na bana ya Yisraele.+  8  Yehova azali na motema mawa mpe na ngɔlu,+Ayokaka nkanda noki te mpe atondi na bolingo ya sembo.*+  9  Alandelaka ntango nyonso mabunga na biso te,+Akangaka mpe nkanda te mpo na libela.+ 10  Asaleli biso te makambo na kolanda masumu na biso,+Apesi biso etumbu te oyo tosengeli kozwa na kolanda mabunga na biso.+ 11  Mpo kaka ndenge likoló etombwamá koleka mabele,Ndenge moko mpe bolingo na ye ya sembo eleki monene epai ya baoyo babangaka ye.+ 12  Kaka ndenge epai moi ebimaka ezali mosika mpenza na epai elalaka,Ndenge yango nde atye mosika na biso ebele ya misala na biso ya kobuka mibeko.+ 13  Kaka ndenge tata ayokelaka bana na ye mawa,Yehova ayokelaka baoyo babangaka ye mawa.+ 14  Mpo ayebi malamu ndenge oyo tosalemá,+Azali kobosana te ete tozali putulu.+ 15  Moto, mowei mpamba, mikolo na ye ezali lokola oyo ya matiti;+Azali kokola lokola fololo ya esobe.+ 16  Kasi ntango mopɛpɛ ebɛtaka, ezalaka lisusu te,Lokola nde ezalaki wana te.* 17  Kasi bolingo ya sembo ya Yehova ezali mpo na seko*Epai ya baoyo babangaka ye,+Mpe bosembo na ye epai ya bana ya bana na bango,+ 18  Epai ya baoyo bazali kobatela kondimana na ye+Mpe epai ya baoyo basalaka makasi bátosa mitindo na ye. 19  Yehova apiki makasi kiti na ye ya bokonzi na likoló;+Mpe bokonzi na ye eyangeli eloko nyonso.+ 20  Bósanzola Yehova, bino nyonso baanzelu na ye,+ oyo bozali na nguya makasi mpenza,Oyo bozali kokokisa liloba na ye+ mpe kotosa mongongo na ye.* 21  Bósanzola Yehova, mampinga na ye nyonso,+Basaleli na ye, oyo bosalaka mokano na ye.+ 22  Bósanzola Yehova bino misala na ye nyonso,Na bisika nyonso oyo azali koyangela.* Tiká nasanzola Yehova na motema na ngai mobimba.

Maloba na nse

^ To, “molimo na ngai esanzola.”
^ To, “nkunda.”
^ To, “motema boboto.”
^ Lil., “Mpe esika na yango eyebaka yango lisusu te.”
^ To, “seko na seko.”
^ Lil., “koyoka mongongo ya liloba na ye.”
^ To, “bisika ya bokonzi na ye.”