Nzembo 15:1-5
Mondule ya Davidi.
15 Ee Yehova, nani okoki kobengisa na hema na yo?
Nani akofanda na ngomba na yo mosantu?+
2 Moto oyo atosaka Nzambe ntango nyonso,+Oyo asalaka makambo oyo ezali sembo+Mpe oyo alobaka solo na motema na ye.+
3 Akoselaka bato makambo te,*+Asalelaka mozalani na ye eloko moko te ya mabe,+Mpe abebisaka lokumu ya baninga na ye te.*+
4 Aboyaka moto nyonso ya mpambampamba,+Kasi akumisaka baoyo babangaka Yehova.
Soki alaki likambo moko,* akokisaka yango, ata soki ekoki kobimisela ye mokakatano.+
5 Adefisaka mbongo na ye mpo na kozwa benefisi te,+Mpe azwaka kanyaka te mpo na kokweisa moto oyo asali likambo te.+
Moto nyonso oyo asalaka makambo wana akokwea ata moke te.*+

