Nzembo 96:1-13

  • “Bóyembela Yehova loyembo ya sika”

    • Yehova abongi kosanzolama mingi mpenza (4)

    • Banzambe ya bato ya bikólo bazali mpamba (5)

    • Bósambela na bilamba ya monzɛlɛ ya bosantu (9)

96  Bóyembela Yehova loyembo ya sika.+ Bóyembela Yehova, mabele mobimba!+  2  Bóyembela Yehova; bósanzola nkombo na ye. Mokolo na mokolo, bósakola nsango malamu ya lobiko na ye.+  3  Bósakola nkembo na ye na kati ya bikólo,Misala na ye ya kokamwa na kati ya bato ya bikólo nyonso.+  4  Yehova azali monene mpe abongi kosanzolama mingi mpenza. Azali nsɔmɔ koleka banzambe mosusu nyonso.  5  Banzambe nyonso ya bato ya bikólo bazali banzambe ya mpambampamba,+Kasi Yehova nde asalá likoló.+  6  Bonene* mpe nkembo ezali liboso na ye;+Bokasi mpe kitoko ezali na esika mosantu na ye.+  7  Bópesa Yehova oyo ebongi na ye, bino mabota ya bato ya bikólo,Bópesa Yehova oyo ebongi na ye, mpo na nkembo mpe bokasi na ye.+  8  Bópesa Yehova nkembo oyo ebongi na nkombo na ye;+Bómema likabo mpe bókɔta na mapango na ye.  9  Bógumbamela* Yehova, na bilamba ya monzɛlɛ ya bosantu;*Bólɛnga liboso na ye, mabele mobimba! 10  Bósakola na kati ya bikólo ete: “Yehova akómi Mokonzi!+ Mabele* epikami makasi, ekoki koningana te.* Akosambisa* bato na bosembo.”+ 11  Likoló esepela, mpe mabele ezala na esengo;Mbu eganga lokola nkake mpe biloko nyonso oyo etondisi yango;+ 12  Esobe ná biloko nyonso oyo ezali kuna esepela.+ Kaka na ntango yango, nzete nyonso ya zamba eganga na esengo+ 13  Liboso ya Yehova, mpo azali koya,*Azali koya kosambisa mabele. Akosambisa na boyengebene bato oyo bafandi na mabele*+Mpe na bosembo na ye bato ya bikólo.+

Maloba na nse

^ To, “Lokumu.”
^ To mbala mosusu, “mpo na nkembo ya bosantu na ye.”
^ To, “Bósambela.”
^ To, “Mabele oyo ebotaka.”
^ To, “kotengatenga te.”
^ To, “Akosamba likambo ya bato na bosembo.”
^ To, “mpo ayei.”
^ To, “mabele oyo ebotaka.”