Tobengisi yo na
Losambo ya pɛto
Liyangani ya Batatoli ya Yehova ya 2025
Kokɔta ezali ofele • Bakɔngɔlaka mabonza te
Makanisi ya ntina
Mokolo ya mitano: Na nzela ya bavideo oyo ekolakisama, okosala mobembo na bisika oyo Yesu afandaki mpe ateyaki.
Mokolo ya pɔsɔ: Okomona ndenge mosala ya Yesu na ebandeli ekokisaki makambo oyo esakolamaki basiɛklɛ mingi liboso.
Mokolo ya lomingo: Na diskur oyo elobi “Nini endimisaka yo ete lingomba na yo ezali ya solo?” okomona mpo na nini ezali na ntina koyeba makambo oyo ondimaka mpe ndenge ya koluka solo.
Video ya drame
Lisolo ya mosala ya Yesu: Lisolo 2 mpe 3
Ntango Yesu azwaki batisimo, akómaki Masiya, to mpe Kristo. Na basanza oyo elandaki, Satana amekaki ye, Yesu abandaki kosangisa bayekoli na ye, mpe asalaki makamwisi na ye ya liboso. Talá makambo yango mpe makambo mosusu ndenge ekomonisama na Lisolo 2 mpe 3 oyo ekolakisama na boumeli ya liyangani oyo.
Kende na jw.org mpo na komona programɛ mobimba mpe talá bavideo oyo elandi:
Nini elekaka na mayangani na biso oyo esalemaka mbula na mbula?
Talá makambo okomona na liyangani ya Batatoli ya Yehova.
Liyangani ya Batatoli ya Yehova ya 2025: “Losambo ya pɛto”
Talá makambo tokoyekola na liyangani ya mbula oyo.
Video ya drame ya Biblia na mokuse: Lisolo ya mosala ya Yesu
Satana ná bademo na ye mpe banguna mosusu ya Yesu, bamekaki ye kaka ntango abandaki mosala na ye. Yesu akotikala sembo epai ya Nzambe?