Lakisá makambo oyo ezali na kati

Makita ya Batatoli ya Yehova

Talá makambo etali makita na biso. Talá esika oyo makita na biso esalemaka pene na bino.

Esika oyo ezali pene na bino (opens new window)

Makita na biso esalemaka ndenge nini?

Toyanganaka mpo na kosambela mbala mibale na pɔsɔ. (Baebre 10:24, 25) Na makita yango, epai moto nyonso akoki koya, totalelaka makambo oyo Biblia elobi mpe ndenge tokoki kosalela mateya yango na bomoi na biso.

Mbala mingi, esɛngaka bato bápesa biyano, mwa moke ndenge ezalaka na kelasi. Tobandaka mpe tosukisaka makita yango na loyembo mpe libondeli.

Esɛngi kaka te ozala Motatoli ya Yehova mpo oya na makita na biso. Moto nyonso oyo alingi akoki koya. Kokɔta ezali ofele. Tokɔngɔlaka mpe mabonza te.