Lakisá makambo oyo ezali na kati

JW Library Sign Language

JW Library Sign Language

JW Library Sign Language ezali programɛ moko ya ordinatɛrɛ oyo Batatoli ya Yehova nde basali. Esalisaka moto azwa, abongisa mpe atánga bavideo na minɔkɔ ya bababa oyo ezali na jw.org. Programɛ yango ezali te na Lingala.

Talá Biblia mpe bavideo mosusu na elobeli ya bababa. Zwá mpe tyá yango na aparɛyi na yo mpo otalaka yango ata soki okɔti na Internet te. Okosepela na bililingi mpe langi na yango mpe ndenge ezali mpasi te kosalela programɛ yango.