Nzembo 124:1-8
Loyembo ya ntango ya komata. Ya Davidi.
124 “Soki Yehova azalaki na ngámbo na biso te,”+
Yisraele aloba yango sikoyo,
2 “Soki Yehova azalaki na ngámbo na biso te+Ntango bato babundisaki biso,+
3 Mbɛlɛ babomaki biso mpenza,+Ntango nkanda na bango ezalaki kopelela biso.+
4 Mbɛlɛ mai ememaki biso,Mokɛli ezindisaki biso.*+
5 Mbɛlɛ mai oyo etomboki ezindisaki biso.*
6 Yehova asanzolama, mpo atikaki te eteTózala nyama ya kolya na mino na bango.
7 Tozali* lokola ndɛkɛ oyo ebikiNa motambo ya moto oyo atyaka mitambo.+Motambo ebukani,Mpe tobiki.+
8 Lisalisi na biso ezali na nkombo ya Yehova,+Mokeli ya likoló ná mabele.”

