Nzembo 81:1-16
Epai ya mokambi ya nzembo; na Gitite.* Ya Asafe.+
81 Bóganga na esengo mpo na Nzambe, makasi na biso.+
Bóganga na koganga ya bolongi mpo na Nzambe ya Yakobo.
2 Bóbɛta miziki mpe bózwa mbonda moke,Nzɛnzɛ ya kosepelisa ná ebɛtɛlo ya nsinga.
3 Bóyula liseke na sanza ya sika,+Ntango sanza ezali mobimba, mpo na mokolo ya fɛti na biso.+
4 Mpo ezali mobeko mpo na Yisraele,Mobeko ya Nzambe ya Yakobo.+
5 Atyaki yango lokola eloko ya kokanisa mpo na Yozefe+Ntango abundisaki* mokili ya Ezipito.+
Nayokaki mongongo* oyo nayebaki te:
6 “Nalongolaki kilo na lipeka na ye;+Nalongolaki kitunga na mabɔkɔ na ye.
7 Ntango ozalaki na mpasi obengaki, mpe nabikisaki yo;+Nayanolaki yo uta na lipata ya nkake.*+
Namekaki yo na mai ya Meriba.*+ (Sela)
8 Ekólo na ngai, yoká mpe nakoloba mpo na kokweisa yo.
Ee Yisraele, soki oyokaka ata ngai!+
9 Epai na yo, nzambe mopaya alingaki kozala te,Mpe olingaki te kogumbamela nzambe mopaya.+
10 Ngai, Yehova, nazali Nzambe na yo,Ye oyo abimisaki yo na mokili ya Ezipito.+
Fungolá monɔkɔ na yo polele, mpe nakotondisa yango.+
11 Kasi bato na ngai bayokaki mongongo na ngai te;Yisraele eboyaki kotosa ngai.+
12 Bongo natikaki bango bálanda motema makasi na bango;Basalaki oyo bakanisaki ete ezalaki malamu.*+
13 Soki bato na ngai báyokelaka ata ngai,+Soki Yisraele etambolaka ata na banzela na ngai!+
14 Mbɛlɛ natyaki nokinoki banguna na bango na nse na bango;Mbɛlɛ nabalolelaki banguna na bango lobɔkɔ na ngai.+
15 Baoyo bayinaka Yehova, bakoya kogumbama liboso na ye na kobanga,Mpe nsuka* na bango ekozala mpo na libela.
16 Kasi nakoleisa yo* blé oyo eleki malamu*+Mpe nakotondisa yo na mafuta ya nzoi oyo euti na libanga.”+

