Nzembo 40:1-17
Epai ya mokambi ya nzembo. Ya Davidi. Mondule.
40 Natyelaki Yehova elikya makasi,*Mpe asembolelaki ngai litoi na ye* mpe ayoki kolela na ngai mpo na kosɛnga lisalisi.+
2 Abimisi ngai na libulu oyo mai na yango ezali kokita mbangumbangu mpenza,*Na pɔtɔpɔtɔ ya nse.
Mpe atɛlɛmisaki makolo na ngai na libanga;Apikaki matambe na ngai makasi.
3 Lisusu, alakisaki ngai loyembo ya sika,+Lisanzoli mpo na Nzambe na biso.
Mingi bakotala na kokamwaMpe bakotyela Yehova motema.
4 Esengo na mobali oyo atyeli Yehova motemaMpe oyo atali te batomboki to bakosi.
5 Osali makambo mingi,Ee Yehova Nzambe na ngai,Misala na yo ya kokamwa mpe makanisi na yo epai na biso!+
Moko te akokani na yo;+Soki nameki koyebisa to kolobela yango,Ekozala ebele koleka mpo na kolobela yango!+
6 Ozalaki te na mposa ya* mbeka mpe likabo;+Kasi ofungolaki matoi na ngai mpo nayoka.+
Osɛngaki te makabo ya kotumba mpe makabo mpo na lisumu.+
7 Bongo nalobaki ete: “Talá, nayei.
Ndenge ekomami na rulo* mpo na ngai.+
8 Ee Nzambe na ngai, nasepeli* kosala mokano na yo,+Mpe mobeko na yo ezali mpenza na kati na ngai.+
9 Nayebisi nsango malamu ya boyengebene na lisangá monene.+
Talá! Nazali kokanga mbɛbu na ngai te,+Ee Yehova, oyebi yango malamu.
10 Nabombi te bosembo na yo na motema na ngai.
Nasakoli bosembo mpe lobiko na yo.
Nabombeli te lisangá monene bolingo na yo ya sembo mpe solo na yo.”+
11 Ee Yehova, koboya te komonisela ngai motema mawa na yo.
Bolingo na yo ya sembo mpe solo na yo ebatela ngai ntango nyonso.+
12 Bampasi oyo ezingi ngai ezali mingi mpe ekoki kotángama te.+
Ebele ya mabunga na ngai efini ngai mpe nazali kokoka komona nzela na ngai te;+Ezali ebele mpenza koleka nsuki ya motó na ngai,Mpe nalɛmbi nzoto.
13 Ee Yehova, nabondeli yo, ndimá kobikisa ngai.+
Ee Yehova, yaká noki kosalisa ngai.+
14 Baoyo nyonso bazali koluka koboma ngaiBáyoka nsɔni mpe básambwa.
Baoyo bazali kosepela na mpasi na ngaiBázonga nsima na nsɔni.
15 Baoyo bazali koloba na ngai ete: “Aha! Aha!”
Bátikala monɔkɔ polele mpo na nsɔni na bango.
16 Kasi baoyo bazali koluka yo+Básepela mpe bázala na esengo mpo na yo.+
Baoyo balingaka misala na yo ya kobikisa báloba ntango nyonso ete:
“Yehova akumisama.”+
17 Kasi ngai nazali moto oyo azangi lisalisi mpe mobola;Yehova atyela ngai likebi.
Yo ozali mosungi na ngai mpe mobikisi na ngai;+Nzambe na ngai, koumela te.+
Maloba na nse
^ To, “Nazelaki mpenza Yehova.”
^ To, “akitaki na nse mpo na koyoka ngai.”
^ To, “libulu oyo mai na yango ezali konguluma.”
^ To, “Osepelaki te na.”
^ Lil., “rulo ya buku.”
^ To, “nazali na mposa ya.”