Nzembo 83:1-18

  • Libondeli ya kosɛnga lisalisi liboso ya banguna

    • “Ee Nzambe, kofanda nyɛɛ te” (1)

    • Banguna bazali lokola matiti ya nsende oyo mopɛpɛ ezali kobalusabalusa (13)

    • Nkombo ya Nzambe ezali Yehova (18)

Loyembo. Mondule ya Asafe.+ 83  Ee Nzambe, kofanda nyɛɛ te;+Kokanga monɔkɔ te* mpe kofanda kimya te, Ee Nzambe.  2  Mpo talá! banguna na yo bazali na yikiyiki;+Baoyo bazali koyina yo basali makambo na lofundo mpenza.*  3  Na mayele mabe, bazali kosalela bato na yo likita na kobombana;Bazali kosala likita mpo na bato oyo ozwaka na motuya.*  4  Balobi ete: “Bóya, tóboma ekólo ya Yisraele,+Mpo bato bábosana yango mpo na libela.”  5  Mpo bango nyonso elongo bapesani toli na motema moko;Bayokani mpo na kotɛmɛla yo:+  6  Bahema ya Edome mpe Bayishimaele, Moabe+ ná Bahagri,+  7  Gebale, Amone+ ná Amaleke,Filistia+ ná baoyo bafandi na Tire.+  8  Asiri+ mpe esangani na bango;Bango nyonso bazali kosalisa* bana ya Lota.+ (Sela)  9  Salá bango ndenge osalaki Midiane,+Ndenge osalaki Sisera mpe Yabine na mokɛli* ya Kishone.+ 10  Basilaki nyɛɛ na Ene-dore;+Bakómaki nyɛi na mabele. 11  Kómisá bato na bango ya lokumu lokola Orebe mpe Zeebe,+Mpe bankumu* na bango lokola Zeba mpe Zalamuna,+ 12  Mpo balobi ete: “Tózwa mokili esika Nzambe afandaka ekóma ya biso.” 13  Ee Nzambe na ngai, kómisá bango lokola matiti ya nsende oyo mopɛpɛ ezali kobalusabalusa,+Lokola matiti ya blé na mopɛpɛ. 14  Lokola mɔtɔ oyo ezali kozikisa zambaLokola lolemo ya mɔtɔ oyo ezali kozikisa bangomba,+ 15  Landá bango na mopɛpɛ makasi na yo+Mpe bangisá bango na mopɛpɛ makasi na yo.+ 16  Zipá* bilongi na bango na nsɔni,Mpo báluka nkombo na yo, Ee Yehova. 17  Báyoka nsɔni mpe bábanga mpo na libela;Básambwa mpe bákufa; 18  Báyeba ete yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova,+Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.+

Maloba na nse

^ To, “Kozanga liloba ya koloba te.”
^ To, “bazali kotombola mitó na bango.”
^ Lil., “yo obombi.”
^ Lil., “bakómi lobɔkɔ mpo na.”
^ To, “wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.
^ To, “bakonzi.”
^ Lil., “Tondisá.”