Nzembo 19:1-14

  • Bozalisi mpe mobeko ya Nzambe ezali kotatola

    • ‘Likoló esakolaka nkembo ya Nzambe’ (1)

    • Mobeko ya Nzambe ezali ya kokoka mpe epesaka makasi (7)

    • “Masumu oyo nasali kozanga koyeba” (12)

Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi. 19  Likoló ezali kosakola nkembo ya Nzambe;+Etando* ezali kosakola mosala ya mabɔkɔ na ye.+  2  Ezali kobimisa liloba na yango mokolo na mokolo,Mpe ezali komonisa boyebi butu nyonso.*  3  Elobaka te, mpe ezali na maloba te;Mongongo na yango eyokanaka te.  4  Kasi makɛlɛlɛ na yango* eyokani na mabele mobimba,Mpe nsango na yango ekómi tii na bansuka ya mabele esika bato bafandi.*+ Na likoló, Nzambe atyeli moi hema;  5  Ezali lokola mobali ya libala oyo azali kobima na shambrɛ ya libala;Esepelaka lokola mobali ya nguya oyo azali kopota mbangu na nzela na ye.  6  Ebimaka na nsuka moko ya likoló,Mpe ebalukaka tii na nsuka na yango mosusu;+Mpe eloko moko te ezangi kozwa molunge na yango.  7  Mobeko ya Yehova ezali ya kokoka,+ epesaka makasi.+ Makundoli ya Yehova ebongi kotyelama motema,+ ekómisaka moto oyo azangi mayele moto ya bwanya.+  8  Bitinda ya Yehova ezali sembo, esepelisaka motema;+Mitindo ya Yehova ezali pɛto, engɛngisaka miso.+  9  Kobanga Yehova ezali pɛto,+ eumelaka seko. Bikateli ya lisambisi ya Yehova ezali solo, yango nyonso ezali sembo.+ 10  Elingami mingi koleka wolo, koleka ebele ya wolo ya kitoko;*+Mpe eleki mafuta ya nzoi na elɛngi,+Mafuta ya nzoi oyo ezali kouta na ndako na yango. 11  Ekebisi mosaleli na yo;+Kobatela yango ezali na litomba monene.+ 12  Nani akoki kososola mabunga?+ Limbisá ngai* mpo na masumu oyo nasali kozanga koyeba. 13  Mpe salisá mosaleli na yo asala te misala ya lofundo;+Kotika te ete yango etambwisa ngai.+ Na ndenge yango nakozala moto oyo akoki,+Mpe nakozala na ngambo te na masumu minene.* 14  Maloba ya monɔkɔ na ngai mpe komanyola* ya motema na ngaiEsepelisa yo,+ Ee Yehova, Libanga na ngai+ mpe Mosikoli na ngai!+

Maloba na nse

^ To, “Bisika ya likoló oyo ezali mpenza monene.”
^ Lil., “butu na butu.”
^ To mbala mosusu, “nsinga na yango ya komeka.”
^ To, “na mabele oyo ebotaka.”
^ To, “oyo epɛtolami.”
^ To, “Tángá ngai ete nazali na ngambo te.”
^ To, “makambo ya kobuka mibeko.”
^ To, “kokanisa na mozindo.”