Nzembo 92:1-15

  • Yehova atombwami mpo na libela

    • Misala na ye ezali minene mpe makanisi na ye ezali mozindo (5)

    • “Moto ya sembo akokola lokola nzete” (12)

    • Mibange bakokoba kokola (14)

Mondule. Loyembo mpo na mokolo ya Sabata. 92  Ezali malamu kopesa Yehova matɔndi+Mpe koyemba mpo na kosanzola* nkombo na ye, Ee Oyo-Aleki-Likoló,  2  Mpo na kolobela bolingo na yo ya sembo+ na ntɔngɔMpe bosembo na yo na butu,  3  Eyembamaka na ebɛtɛlo ya nsinga zomi mpe na ebɛtɛlo ya nsinga misato,Na miziki kitoko ya nzɛnzɛ.+  4  Mpo osepelisi ngai, Ee Yehova, na misala na yo;Mpo na misala ya mabɔkɔ na yo, nazali koganga na esengo.  5  Ee Yehova, misala na yo ezali mpenza minene!+ Makanisi na yo ezali mozindo mingi!+  6  Moto moko te oyo azangi mayele akoki koyeba yango;Mpe zoba moko te akoki kokanga ntina na yango:+  7  Ntango bato mabe bazali kobima lokola matiti mabe*Mpe basali-mabe nyonso bazali kokola,Ezali mpo básila libela.+  8  Kasi yo, Ee Yehova, otombwami mpo na libela.  9  Mpo talá kokwea ya banguna na yo, Ee Yehova,Talá ndenge banguna na yo bakokufa;Bato mabe nyonso bakopanzana.+ 10  Kasi okobakisa makasi* na ngai lokola oyo ya ngɔmbɛ ya zamba;Nakopakola loposo na ngai mafuta ya sika.+ 11  Mpe nakomona kokwea ya banguna na ngai;+Matoi na ngai ekoyoka nsango ya kokwea ya baoyo bazali kobundisa ngai. 12  Kasi moto ya sembo* akokola lokola nzete ya mbila;Mpe akokola lokola nzete ya sɛdrɛ na Liban.+ 13  Balonamá na ndako ya Yehova;Bazali kokola na mapango ya Nzambe na biso.+ 14  Ata na bobange* bakokoba kokola;+Bakozala kaka makasi* mpe bakolɛmba te,+ 15  Bakoloba ete Yehova azali sembo. Ye azali Libanga na ngai,+ epai na ye kozanga bosembo ezali te.

Maloba na nse

To, “kobɛta miziki mpo na.”
To, “matiti.”
Lil., “liseke.”
To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “na ntango ya nsuki mpɛmbɛ.”
Lil., “mafutamafuta.”