Nzembo 91:1-16
91 Moto nyonso oyo afandi na esika ya nkuku ya Oyo-Aleki-Likoló+Akofanda na elili ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.+
2 Nakoloba na Yehova: “Ozali esika na ngai ya kokima mpe esika makasi na ngai ya libateli,+Nzambe na ngai oyo natyelaka motema.”+
3 Mpo akobikisa yo na motambo ya mokangi-ndɛkɛ,Na maladi mabe oyo ebomaka.
4 Na nsala ya mapapu na ye akozipa yo,*Mpe okokima na nse ya mapapu na ye.+
Bosembo na ye+ ekozala nguba monene+ mpe efelo makasi ya libateli.
5 Okobanga likama moko te na butu,+To likula oyo ezali kopumbwa na moi,+
6 To maladi mabe oyo etambolatambolaka na molili,To eloko oyo ebomaka bato na midi.
7 Bato nkóto bakokwea penepene na yoMpe bato nkóto zomi na lobɔkɔ na yo ya mobali,Kasi nyonso wana ekopusana epai na yo te.+
8 Okotala kakaMpe okomona ntango bato mabe bakozwa etumbu.*
9 Mpo olobaki: “Yehova azali esika na ngai ya kokima,”
Okómisi Oyo-Aleki-Likoló esika na yo ya kofanda;*+
10 Likama moko te ekokwela yo,+Mpe ata etumbu moko te ekopusana pene na hema na yo.
11 Mpo akopesa baanzelu na ye+ mitindo mpo na yo,Mpo bábatela yo na banzela na yo nyonso.+
12 Bakomema yo na mabɔkɔ na bango,+Mpo lokolo na yo etutana na libanga te.+
13 Okonyata mwana-nkɔsi mpe kobra;Okonyatanyata nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki mpe nyoka monene.+
14 Nzambe alobi: “Lokola alingaka ngai mingi,* nakobikisa ye.+
Nakobatela ye mpo ayebi nkombo na ngai.+
15 Akobelela ngai, mpe nakoyanola ye.+
Nakozala elongo na ye na ntango ya mpasi.+
Nakobikisa ye mpe nakopesa ye lokumu.
16 Nakopesa ye bomoi molai,+Mpe nakomonisa ye misala ya lobiko na ngai.”*+
Maloba na nse
^ To, “Akokanga nzela ya kopusana pene na yo.”
^ Lil., “lifuti.”
^ To mbala mosusu, “ndako makasi; esika ya kokima.”
^ Lil., “Lokola ye moko apusani epai na ngai.”
^ To, “akomona lobiko epai na ngai.”