Nzembo 142:1-7

  • Libondeli mpo na kosɛnga kobikisama na mabɔkɔ ya banyokoli

    • “Nazali na esika ya kokima te” (4)

    • ‘Ozali nyonso oyo nazali na yango’ (5)

Maskile.* Libondeli ya Davidi, ntango azalaki na mobenga.+ 142  Na mongongo na ngai, nabelelaka Yehova mpo na kosɛnga lisalisi;+Na mongongo na ngai, nabondelaka Yehova mpo amonisela ngai boboto.  2  Nasopaka motungisi na ngai liboso na ye;Nayebisaka ye mpasi na ngai+  3  Ntango elimo* na ngai elɛmbaki na kati na ngai. Bongo otalaki nzela na ngai.+ Na nzela oyo nazali kotambola,Babombeli ngai motambo.  4  Talá na lobɔkɔ na ngai ya mobali mpe monáEte moto moko te azali kotyela ngai likebi.*+ Nazali na esika ya kokima te;+Moto moko te azali komitungisa mpo na ngai.*  5  Ee Yehova, nazali kobelela yo mpo na kosɛnga lisalisi. Nalobi ete: “Ozali esika na ngai ya kokima,+Nyonso nazali na yango na mokili ya bato ya bomoi.”  6  Tyá likebi na koganga na ngai mpo na kosɛnga lisalisi,Mpo natungisami makasi mpenza. Bikisá ngai na banyokoli na ngai,+Mpo bazali makasi mingi koleka ngai.  7  Bimisá ngai na kashoMpo nasanzola nkombo na yo. Bato ya sembo báyangana zingazinga na ngaiMpo osaleli ngai makambo na boboto.

Maloba na nse

^ To, “makasi.”
^ Lil., “koyeba ngai lisusu.”
^ Lil., “likabo na ngai.”