Nzembo 132:1-18

  • Baponi Davidi ná Siona

    • “Koboya te moto na yo oyo atyami mafuta” (10)

    • Banganga-nzambe ya Siona balati lobiko (16)

Loyembo ya ntango ya komata. 132  Ee Yehova, kanisá Davidi,Mpe mpasi na ye nyonso;+  2  Ndenge alapelaki Yehova ndai,Ndenge asalaki elako epai ya Moto ya Nguya ya Yakobo:+  3  “Nakokɔta te na hema na ngai, ndako na ngai.+ Nakolala te na kiti na ngai ya mpɔngi, mbeto na ngai,  4  Nakotika te ete miso na ngai ekangama,Mpe nakolala te,  5  Tii nakozwela Yehova esika,Esika ya kofanda ya kitoko* mpo na Moto ya Nguya ya Yakobo.”+  6  Talá! Toyoki yango na Efrata;+Tomoni yango na zamba.+  7  Tókɔta na esika na ye ya kofanda;*+Tógumbama na ebonga ya makolo na ye.+  8  Tɛlɛmá, Ee Yehova, oya na esika na yo ya kopema,+Yo ná Sanduku ya bokasi na yo.+  9  Banganga-nzambe na yo bálata bosembo,*Mpe bato na yo ya sembo báganga na esengo. 10  Mpo na Davidi mosaleli na yo,Koboya te* moto na yo oyo atyami mafuta.+ 11  Yehova alapeli Davidi ndai,Ya solo akobongola liloba na ye te: “Nakotya moko ya bato ya libota na yo*Na kiti na yo ya bokonzi.+ 12  Soki bana na yo babateli kondimana na ngaiMpe makundoli na ngai oyo nazali koteya bango,+Bana na bango mpe bakofandaNa kiti na yo ya bokonzi mpo na libela.”+ 13  Yehova aponá Siona;+Asepelá na yango mpo ezala esika na ye ya kofanda:+ 14  “Oyo nde esika na ngai ya kopema mpo na libela;Nakofanda awa,+ mpo nasepeli na yango. 15  Nakopambola mpenza biloko na yango ya kolya.Nakopesa mpenza babola na yango mampa.+ 16  Nakolatisa banganga-nzambe na yango lobiko;+Mpe bato na yango ya sembo bakoganga mpenza na esengo.+ 17  Kuna nakobakisa makasi* ya Davidi. Nabongisi mwinda mpo na moto na ngai oyo atyami mafuta.+ 18  Nakolatisa banguna na ye nsɔni;Kasi motole oyo ezali na motó na ye, ekongɛnga.”+

Maloba na nse

To, “Tabernakle monene.”
To, “tabernakle na ye monene.”
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “Koboya te elongi ya.”
Lil., “oyo akouta na mbuma ya libumu na yo.”
Lil., “ liseke.”