Nzembo 82:1-8

  • Likebisi mpo na kosambisa na bosembo

    • Nzambe azali kosambisa na katikati ya “banzambe” (1)

    • “Bósamba likambo ya moto mpamba” (3)

    • “Bozali banzambe” (6)

Mondule ya Asafe.+ 82  Nzambe azwi esika na kati ya liyangani ya Nzambe;+Azali kosambisa na katikati ya banzambe:*+  2  “Tii ntango nini bokokoba kosambisa na bosembo te+Mpe kolongisa bato mabe?+ (Sela)  3  Bósamba likambo ya moto mpamba mpe ya mwana oyo tata akufá.+ Bókata na bosembo likambo ya moto oyo azangi libateli mpe ya mobola.+  4  Bóbikisa moto mpamba mpe mobola;Bóbikisa bango na lobɔkɔ ya bato mabe.”  5  Bayebi te, mpe bakangi ntina te;+Bazali kotambolatambola na molili;Miboko nyonso ya mabele ezali kolɛngalɛnga.+  6  “Nalobi: ‘Bozali banzambe,*+Bino nyonso bozali bana ya Oyo-Aleki-Likoló.  7  Kasi bokokufa kaka ndenge bato bakufaka;+Mpe bokokwea lokola bankumu nyonso!’”+  8  Ee Nzambe, tɛlɛmá, mpe sambisá mabele,+Mpo bikólo nyonso ezali ya yo.

Maloba na nse

To, “bikelamu oyo bazali na lolenge ya banzambe.”
To, “bikelamu oyo bazali na lolenge ya banzambe.”