Nzembo 85:1-13

  • Libondeli mpo na kosɛnga kozongisama

    • Nzambe akolobela kimya epai ya bato ya sembo (8)

    • Motema boboto mpe bosembo ekutani (10)

Mpo na mokambi ya nzembo. Mondule ya bana ya Kora.+ 85  Ee Yehova, yo omoniseli mokili na yo boboto;+Ozongisi bato ya Yakobo oyo bazalaki bakangami.+  2  Olimbisi libunga ya bato na yo;Olimbisi* lisumu na bango nyonso.+ (Sela)  3  Opekisi nkanda na yo nyonso ya kongala;Otiki nkanda na yo makasi.+  4  Ee Nzambe ya lobiko na biso, zongisá biso,Mpe tyá nkanda na yo pembeni.+  5  Okosilikela biso mpo na libela?+ Okoumisa nkanda na yo libota na libota?  6  Okopesa biso bomoi lisusu teMpo bato na yo básepela na yo?+  7  Ee Yehova, moniselá biso bolingo na yo ya sembo,+Mpe pesá biso lobiko na yo.  8  Nakoyoka oyo Yehova Nzambe ya solo alobi,Mpo akolobela kimya epai ya bato na ye,+ epai ya bato na ye ya sembo,Kasi bázongela te komityela motema.+  9  Ya solo, lobiko na ye ezali pene na baoyo babangaka ye,+Mpo nkembo na ye efanda na mokili na biso. 10  Motema boboto* mpe bosembo ekokutana;Boyengebene mpe kimya ekopesana lipwɛpwɛ.+ 11  Bosembo ekobima na mabele,Mpe uta na likoló, boyengebene ekotala na nse.+ 12  Ya solo, Yehova akopesa oyo ezali malamu,*+Mpe mokili na biso ekopesa mbuma na yango.+ 13  Boyengebene ekotambola liboso na ye,+Mpe ekosala nzela mpo na matambe na ye.

Maloba na nse

Lil., “Ozipi.”
To, “Bolingo ya sembo.”
To, “bozwi.”