Nzembo 5:1-12

  • Yehova azali esika ya kokima ya bato ya sembo

    • Nzambe ayinaka mabe (4, 5)

    • “Kambá ngai na kati ya bosembo na yo” (8)

Epai ya mokambi ya nzembo, mpo na Nehilote.* Mondule ya Davidi. 5  Yoká maloba na ngai, Ee Yehova;+Tyá likebi na kolelalela na ngai.  2  Tyá likebi na kolela na ngai mpo na kosɛnga lisalisi,Ee Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai, mpo yo nde nazali kobondela.  3  Ee Yehova, okoyoka mongongo na ngai na ntɔngɔ;+Na ntɔngɔ nakoyebisa yo likambo oyo ezali kotungisa ngai+ mpe nakozela na mposa makasi.  4  Mpo ozali Nzambe oyo asepelaka na mabe te;+Moto moko te ya mabe akoki kotikala epai na yo.+  5  Moto moko te ya lolendo akoki kotɛlɛma liboso na yo. Oyinaka baoyo nyonso basalaka makambo ya mabe;+  6  Okoboma baoyo balobaka lokuta.+ Yehova ayinaka bato ya mobulu mpe baoyo bakosaka.*+  7  Kasi nakokɔta na ndako na yo+ mpo na bolingo na yo ya sembo;*+Nakogumbama natali ngámbo ya tempelo na yo mosantu mpo na kobanga yo.+  8  Ee Yehova, kambá ngai na kati ya bosembo na yo, mpo na banguna na ngai;Longolelá ngai mabaku na nzela na yo.+  9  Mpo likambo moko te oyo bazali koloba ekoki kotyelama motema;Makanisi na bango etondi na mabe;Mongongo na bango ezali lilita ya polele;Lolemo na bango etondi na maloba sukali.+ 10  Kasi Nzambe akotánga bango ete bazali na ngambo;Mayele na bango moko ya mabe nde ekokweisa bango.+ Tiká ete bábengana bango mpo na makambo na bango ebele ya kobuka mibeko,Mpo batombokelaki yo. 11  Kasi baoyo nyonso bazali kokima epai na yo bakosepela;+Bakoganga na esengo ntango nyonso. Okokanga nzela ya kokóma epai na bango,Mpe baoyo balingaka nkombo na yo bakosepela na yo. 12  Mpo okopambola moto nyonso oyo azali sembo,* Ee Yehova;Okozinga bango na kondimama na yo lokola na nguba monene.+

Maloba na nse

To, “moto oyo asopaka makila mpe oyo akosaka.”
To, “bolingo ya sembo na yo monene.”
To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.