Nzembo 59:1-17
Epai ya mokambi ya nzembo; na ebɛtɛlo ya “Kobebisa te.” Ya Davidi. Mikitame.* Ntango Saulo atindaki bato bákɛngɛla ndako ya Davidi* mpo báboma ye.+
59 Ee Nzambe na ngai, bikisá ngai na mabɔkɔ ya banguna na ngai;+Batelá ngai na mabɔkɔ ya baoyo bazali kotɛmɛla ngai.+
2 Bikisá ngai na mabɔkɔ ya baoyo basalaka makambo ya mabe,Mpe bikisá ngai na mabɔkɔ ya bato ya mobulu.*
3 Talá! Bazali kozela mpo na kosala ngai* mabe;+Bato ya makasi bazali kobundisa ngaiKasi ezali te mpo natomboki to nasali lisumu,+ Ee Yehova.
4 Atako nasali likambo ya mabe te, bazali kopota mbangu mpe komibongisa mpo na kobundisa ngai.
Tɛlɛmá ntango nazali kobenga mpe talá.
5 Mpo yo, Ee Yehova Nzambe ya mampinga, ozali Nzambe ya Yisraele.+
Lamuká mpo otyela bikólo nyonso likebi.
Baoyo nyonso batɛkaka baninga na bango mpe balukaka kosala bango mabe, koyokela bango mawa te.+ (Sela)
6 Bazongaka mpokwa nyonso;+Bagangaka lokola mbwa+ mpe babalukaka zingazinga ya engumba.+
7 Talá makambo oyo ezali kobima* na monɔkɔ na bango;Mbɛbu na bango ezali lokola mipanga,+Mpo balobi: “Nani azali koyoka?”+
8 Kasi yo, Ee Yehova, okosɛka bango;+Okotyola bikólo nyonso.+
9 Ee makasi na ngai, nakotala kaka epai na yo;+Mpo Nzambe azali esika makasi na ngai ya kobombana.*+
10 Nzambe oyo amoniselaka ngai bolingo ya sembo akoya kosalisa ngai;+Nzambe akosala ete namona kokwea ya banguna na ngai.+
11 Koboma bango te, mpo bato na ngai bábosana te.
Na nguya na yo salá ete báyengayenga;Salá ete bákwea, Ee Yehova, nguba na biso.+
12 Mpo na lisumu ya monɔkɔ na bango, liloba ya mbɛbu na bango,Bákangama na motambo na lolendo na bango,+Mpo na elakeli mabe mpe bokosi oyo bazali koloba.
13 Silisá bango na nkanda na yo;+Silisá bango, mpo bázala lisusu te;Monisá bango ete Nzambe azali koyangela na Yakobo mpe tii na bansuka ya mabele.+ (Sela)
14 Tiká ete bázonga na mpokwa;Tiká bango báganga lokola mbwa mpe bábaluka zingazinga ya engumba.+
15 Tiká bango báyengayenga mpo na koluka eloko ya kolya;+Bátonda te mpe bázwa esika ya kolala te.
16 Kasi ngai nakoyembela makasi na yo,+Na ntɔngɔ, nakoyebisa na esengo mpenza makambo etali bolingo na yo ya sembo.
Mpo ozali esika makasi na ngai ya kobombana+Mpe esika oyo nakoki kokima na ntango ya mpasi na ngai.+
17 Ee makasi na ngai, nakoyemba mpo na kosanzola yo,*+Mpo Nzambe azali esika makasi na ngai ya kobombana, Nzambe oyo amoniselaka ngai bolingo ya sembo.+

