Nzembo 147:1-20
147 Bósanzola Yah!*
Ezali malamu koyemba mpo na kosanzola* Nzambe na biso;Ezali esengo mpe ebongi kosanzola ye!+
2 Yehova azali kotonga Yerusaleme;+Azali kosangisa bato ya Yisraele oyo bapalanganá.+
3 Abikisaka baoyo bazoki na motema;Akangaka bampota na bango.
4 Atángaka motángo ya minzoto;Abengaka yango nyonso na nkombo na yango.+
5 Nkolo na biso azali monene mpe na nguya mingi;+Mayele na ye ezali na nsuka te.+
6 Yehova atombolaka bato ya komikitisa,+Kasi abwakaka bato mabe na mabele.
7 Bóyembela Yehova nzembo ya matɔndi;Bóyemba mpo na kosanzola Nzambe na biso na nzɛnzɛ,
8 Ye oyo azipaka likoló na mapata,Ye oyo anɔkisaka mbula na mabele,+Ye oyo asalaka ete matiti ebima+ na bangomba.
9 Apesaka banyama bilei,+Bana ya yanganga* oyo ezali kobelela mpo na yango.+
10 Esengo na ye eutaka na nguya ya mpunda te;+Makasi ya makolo ya moto ekamwisaka ye te.+
11 Yehova asepelaka na baoyo babangaka ye,+Na baoyo bazelaka bolingo na ye ya sembo.+
12 Ee Yerusaleme, kumisá Yehova.
Ee Siona, sanzolá Nzambe na yo.
13 Akómisaka bikangiseli ya baporte na yo makasi;Apambolaka bana na yo.
14 Atyaka kimya na teritware na yo;+Atondisaka yo na mbuma ya blé oyo eleki malamu.*+
15 Apesaka mabele mitindo;Liloba na ye epotaka mbangu mpenza.
16 Atindaka nɛjɛ lokola lɛnɛ;+Apalanganisaka glasi ya pɛtɛpɛtɛ lokola putulu ya mɔtɔ.+
17 Abwakaka mbula ya mabanga lokola biteni ya mampa.+
Nani akoki kotɛlɛma liboso ya malili na ye?+
18 Atindaka liloba na ye mpe enyangwaka.
Asalaka ete mopɛpɛ na ye epɛpa,+ mpe mai etíyolaka.
19 Ayebisaka Yakobo liloba na ye,Malako na ye mpe bikateli na ye ya lisambisi epai ya Yisraele.+
20 Asalelá ekólo mosusu bongo te;+Bayebi eloko moko te na oyo etali bikateli na ye ya lisambisi.
Bósanzola Yah!*+
Maloba na nse
^ To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.
^ To, “kobɛta miziki mpo na.”
^ To, “korbo.”
^ Lil., “na mafuta ya mbuma ya blé.”
^ To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.