Nzembo 87:1-7
-
Siona, engumba ya Nzambe ya solo
-
Baoyo babotamá na Siona (4-6)
-
Mondule ya bana ya Kora.+ Loyembo.
87 Nzambe atongi engumba na ye na bangomba mosantu.+
2 Yehova alingaka baporte ya Siona+Mingi koleka bahema nyonso ya Yakobo.
3 Ee engumba ya Nzambe ya solo, makambo ya nkembo ezali kolobama mpo na yo.+ (Sela)
4 Nakotánga Rahaba+ ná Babilone na kati ya baoyo bayebi ngai;Filistia, Tire, ná Kushi mpe bazali na kati ya baoyo bayebi ngai.
Ekolobama ete: “Talá moto oyo abotamá kuna.”
5 Mpe bakoloba mpo na Siona:
“Mokomoko na bango abotamá kuna.”
Mpe Oyo-Aleki-Likoló akopika Siona makasi.
6 Ntango Yehova akokoma nkombo ya bato ya bikólo, akosakola ete:
“Talá moto oyo abotamá kuna.” (Sela)
7 Bayembi+ mpe baoyo babinaka mabina ya kobaluka+ bakoloba ete:
“Maziba na ngai nyonso ezali epai na yo.”*+
Maloba na nse
^ To, “Mpo na ngai, ozali liziba ya makambo nyonso.”

