Nzembo 42:1-11

  • Kosanzola Nzambe, Mobikisi Monene

    • Nazali na mposa ya Nzambe ndenge bishe ezalaka na mposa makasi ya mai (1, 2)

    • “Mpo na nini nazangi elikya?” (5,11)

    • “Nakozela Nzambe” (5,11)

Epai ya mokambi ya Nzembo. Maskile* ya bana ya Kora.+ 42  Kaka ndenge nyama ebengami bishe ezalaka na mposa makasi ya mai,Ngai mpe nazali* na mposa na yo makasi, Ee Nzambe.  2  Nazali mpenza na mposa ya Nzambe, ya Nzambe ya bomoi.+ Ntango nini nakoki koya mpe komonana liboso ya Nzambe?+  3  Mai ya miso na ngai ekómi bilei na ngai butu moi;Mokolo mobimba bazali kotyola ngai ete: “Nzambe na yo azali wapi?”+  4  Nakanisi makambo oyo, mpe nasopi molimo na ngai,*Mpo namesanaki kotambola elongo na ebele ya bato;Nazalaki kotambola malɛmbɛ liboso na bango mpo na kokende na ndako ya Nzambe,Na koganga ya esengo mpe ya matɔndi,Ya ebele ya bato oyo bazali kosala fɛti.+  5  Mpo na nini nazangi elikya?+ Mpo na nini mobulungano oyo kati na ngai? Nakozela Nzambe,+Mpo nakosanzola ye lisusu, azali Mobikisi na ngai monene.+  6  Nzambe na ngai, nazangi elikya.+ Yango wana nakanisi yo,+Banda na mokili ya Yordani mpe na bansɔngɛ ya Heremone,Banda na ngomba Mizare.*  7  Mai mozindo ezali kobenga mai mozindoNa lokito ya mai na yo oyo ezali komibwaka. Mitungisi ezipi ngai lokola mbonge na yo ya makasi.+  8  Na moi Yehova akomonisela ngai bolingo na ye ya sembo,Mpe na butu loyembo na ye ekozala elongo na ngai—nakosala libondeli epai ya Nzambe ya bomoi na ngai.+  9  Nakoloba na Nzambe, libanga na ngai ete: “Mpo na nini obosani ngai?+ Mpo na nini esengeli natambola mawamawa mpo monguna azali konyokola ngai?”+ 10  Na koyina nyonso* banguna na ngai bazali kotyola ngai;Mokolo mobimba bazali kotyola ngai ete: “Nzambe na yo azali wapi?”+ 11  Mpo na nini nazangi elikya? Mpo na nini mobulungano oyo kati na ngai? Nakozela Nzambe,+Mpo nakosanzola ye lisusu; azali Mobikisi na ngai monene mpe Nzambe na ngai.+

Maloba na nse

To, “Molimo na ngai ezali.”
To, “ngomba moke.”
To mbala mosusu, “Lokola bazali.”