Nzembo 69:1-36
Epai ya mokambi ya nzembo; ya “Bafololo lísi.” Loyembo ya Davidi.
69 Ee Nzambe, bikisá ngai mpo mai elingi kozindisa ngai.*+
2 Nazindi na pɔtɔpɔtɔ ya mozindo, epai mabele ya makasi ezali te.+
Nakómi na mai ya mozindo,Mpe mokɛli oyo mai ezali kotíyola mbangu ememi ngai.+
3 Nalɛmbi na koganga;+Mongongo na ngai ekauki.
Miso na ngai elɛmbi na kozela Nzambe na ngai.+
4 Baoyo bazali koyina ngai kaka mpamba+Bazali mingi koleka nsuki ya motó na ngai.
Baoyo balingi kokómisa ngai na kimya ya liwa,Banguna na ngai oyo basalaka makambo na bokosi,* bakómi mingi.
Basɛngaki ngai na makasi nazongisa eloko oyo nayibaki te.
5 Ee Nzambe, oyebi bozoba na ngai,Mpe ngambo na ngai ebombani liboso na yo te.
6 Baoyo bazali kotyela yo elikya báyoka nsɔni te mpo na ngai,Ee Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga.
Baoyo bazali koluka yo básambwa te mpo na ngai,Ee Nzambe ya Yisraele.
7 Namemi nsɔni mpo na yo;+Kosambwa ezipi elongi na ngai.+
8 Nakómi lokola moto oyo ayebani te epai ya bandeko na ngai,Mopaya epai ya bana ya mama na ngai.+
9 Molende mpo na ndako na yo epeli kati na ngai,+Mpe kosambwisa ya baoyo bazali kosambwisa yo ekweli ngai.+
10 Ntango namikitisaki mpo na kokila bilei,*Nasambwaki mpo na yango.
11 Ntango nalataki ngɔtɔ,*Nakómaki eloko ya kotyola* epai na bango.
12 Baoyo bafandi na porte ya engumba bazali koloba mpo na ngai,Mpe balangwi-masanga bazali koyemba ngai na nzembo na bango.
13 Nakobondela yo,Ee Yehova, na ntango oyo okomonisela ngai boboto.+
Na bolingo na yo ya sembo oyo etondi, Ee Nzambe.Yanolá ngai mpe monisá ete ozali mobikisi na ngai oyo abongi kotyelama motema.+
14 Bikisá ngai na pɔtɔpɔtɔ;Kotika te ete nazinda.
Bikisá ngai na mabɔkɔ ya baoyo bayinaka ngaiMpe na mai mozindo.+
15 Kotika te mai makasi oyo ezali kotíyola mbangu emema ngai,+To mozindo emɛla ngai,To libulu ekanga monɔkɔ na yango likoló na ngai.+
16 Ee Yehova, yanolá ngai mpo bolingo na yo ya sembo ezali malamu.+
Balusá miso na yo epai na ngai na kolanda motema mawa oyo otondi na yango,+
17 Mpe kobombela mosaleli na yo elongi na yo te.+
Yanolá ngai nokinoki mpo nazali na mpasi.+
18 Pusaná pene na ngai mpe bikisá ngai;*Sikolá ngai mpo na banguna na ngai.
19 Oyebi kosambwa na ngai, nsɔni na ngai mpe kotyolama na ngai.+
Ozali komona banguna na ngai nyonso.
20 Kosambwa ezokisi motema na ngai, mpe mpota yango esilaka te.*
Nakanisaki ete bakomitya na esika na ngai, kasi moto moko te asalaki yango,+Nakanisaki ete babɔndisi bakozala, kasi namonaki ata moko te.+
21 Kasi bilei bapesaki ngai ezalaki nde nzete moko ya pwazɔ,*+Mpe mpo na kosilisa mposa na ngai ya mai, bapesaki ngai vinɛgrɛ namɛla.+
22 Mesa na bango ekóma motambo mpo na bango,Mpe bomɛngo na bango ekóma motambo.+
23 Miso na bango ekóma molili mpo bámona te,Mpe salá ete loketo na bango elɛngaka ntango nyonso.
24 Sopelá bango nkanda na yo ya makasi,Mpe nkanda na yo ya kongala ezwa bango.+
25 Kaa na bango oyo ezingami na efelo etikala mpamba;Moto moko te afanda na bahema na bango.+
26 Mpo balandi moto oyo obɛti,Mpe bazali kaka kolobela bampasi ya baoyo ozokisi.
27 Bakisá ngambo likoló ya ngambo na bango,Kotalela bango te lokola bato ya sembo.
28 Bálongolama na buku ya bato ya bomoi,*+Mpe bákomama esika moko te na bato ya sembo.+
29 Kasi ngai natungisami mpe nazali na mpasi.+
Ee Nzambe, nguya na yo oyo ebikisaka ebatela ngai.
30 Nakoyemba mpo na kosanzola nkombo ya Nzambe,Mpe nakokumisa ye na matɔndi.
31 Yango ekosepelisa Yehova mingi koleka ngɔmbɛ-mobali,Koleka mwana-ngɔmbɛ mobali oyo ezali na maseke mpe basabo.+
32 Bato ya komikitisa bakomona yango mpe bakosepela.
Bino baoyo bozali koluka Nzambe, mitema na bino ezala lisusu na bomoi.
33 Mpo Yehova azali koyoka babola,+Mpe akotyola te bato na ye oyo bakangami.+
34 Likoló ná mabele esanzola ye,+Mbu mpe eloko nyonso ya bomoi oyo ezali na kati na yango.
35 Mpo Nzambe akobikisa Siona+Mpe akotonga lisusu bingumba ya Yuda,Bakofanda kuna mpe bakozwa yango.*
36 Bana ya basaleli na ye bakozwa yango lokola libula,+Mpe baoyo balingaka nkombo na ye+ bakofanda kuna.
Maloba na nse
^ To, “ekómi tii na molimo na ngai.”
^ To, “Banguna na ngai kaka mpamba.”
^ To mbala mosusu, “Ntango nalelaki mpe nakilaki bilei.”
^ Talá Ndimbola ya maloba.
^ Lil., “liloba ya lisese.”
^ To, “Pusaná pene na molimo na ngai mpe sɛngá yango.”
^ To, “nakómi pene ya kolɛmba nzoto.”
^ To, “lititi ya ngɛngɛ.”
^ To, “buku ya bomoi.”
^ Elingi koloba, mokili.

