MOTUNA 13

Biblia elobi nini mpo na mosala?

“Omoni moto oyo ayebi mosala na ye malamu? Akotɛlɛma liboso ya bakonzi; akotɛlɛma te liboso ya bato mpamba.”

Masese 22:29

“Moyibi ayiba lisusu te, kasi asala nde mosala makasi, asala na mabɔkɔ na ye mosala oyo ezali malamu, mpo azala na eloko ya kokabela moto oyo azali kokelela.”

Baefese 4:28

“Moto nyonso alya, amɛla mpe azwa esengo mpo na mosala na ye nyonso ya makasi. Ezali likabo ya Nzambe.”

Mosakoli 3:13