Nzembo 11:1-7

  • Kokima epai ya Yehova

    • “Yehova azali na kati ya tempelo na ye mosantu” (4)

    • Nzambe ayinaka moto nyonso oyo alingaka mobulu (5)

Epai ya mokambi ya nzembo. Loyembo ya Davidi. 11  Nakimi epai ya Yehova.+ Ndenge nini bokoki koloba na ngai:* “Kimá na ngomba na yo lokola ndɛkɛ!  2  Talá ndenge bato mabe bazali kogumba litimbo;Bazali kobongisa likula na bango na nsinga ya litimbo,Mpo, uta na molili, bábwakela yango bato oyo bazali na motema sembo.  3  Ntango miboko ya bosembo ebukani,Moto ya sembo akoki kosala nini?”  4  Yehova azali na kati ya tempelo na ye mosantu.+ Kiti ya bokonzi ya Yehova ezali na likoló.+ Miso na ye emonaka, miso na ye oyo etalaka na likebi* ezali kotalatala bana ya bato.+  5  Yehova atalatalaka moto malamu* ná moto mabe;+Ye ayinaka* moto oyo alingaka mobulu.+  6  Akonɔkisela bato mabe mitambo;*Mɔtɔ ná sufulu+ mpe mopɛpɛ ya kozikisa ekozala mbano na bango.  7  Mpo Yehova azali sembo;+ alingaka misala ya bosembo.+ Bato oyo bazali sembo bakomona elongi na ye.*+

Maloba na nse

To, “molimo na ngai.”
To, “ya kongɛnga.”
To, “Molimo na ye eyinaka.”
To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To mbala mosusu, “makala ya mɔtɔ.”
To, “bakomona boboto na ye.”