Nzembo 129:1-8
-
Babundisaka ngai, kasi balongá ngai te
-
Baoyo nyonso bayinaka Siona bayokisami nsɔni (5)
-
Loyembo ya ntango ya komata.
129 “Babundisaka ngai, banda bolenge na ngai”+
Sikoyo Yisraele aloba:
2 “Banda bolenge na ngai, batikaka kobundisa ngai te;+Kasi balongá ngai te.+
3 Baoyo batimolaka mabele batimoli na mokɔngɔ na ngai;+Bakómisi banzela ya mikala na bango milai.”
4 Kasi Yehova azali sembo.+Akati bansinga ya bato mabe.+
5 Bakoyoka nsɔni mpe bakozonga nsima mpo na kosambwa,Baoyo nyonso bazali koyina Siona.+
6 Bakokóma lokola matiti oyo ebimaka na bansamba,Oyo ekaukaka liboso elongolama,
7 Oyo ekoki te kotondisa lobɔkɔ ya mobuki mbuma,Ata mpe mabɔkɔ ya moto oyo akangisaka matiti mabokemaboke.
8 Baleki-nzela bakoloba te ete:
“Lipamboli ya Yehova ezala likoló na bino,Topamboli bino na nkombo ya Yehova.”

